Luka

Secrétaire ya Leta ya Ngwendé ya Santu-Petelo Pietro Parolin Secrétaire ya Leta ya Ngwendé ya Santu-Petelo Pietro Parolin 

Episkopo ya lokúmu Parolin: "Lisálisi lya bansó izali na ntina po ya Ukraine"

Na bozui maloba o molulu yoko na lopitalo ya bána ya Bambino Gesù, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alingaki bozali y'Amerika pe "mosála moko ya ntina" ya Poto na boluki kosilisa etumba na Ukraine. Lisusu episkopo ya lokúmu Pietro Parolin alobaki 'te Sini (Chine) azali lokóla na "liloba na ye ya koloba" po ya boboto.

Vatican News

"Lisálisi lya bansó izali na ntina po ya kokendisa libosó boboto" na Ukraine. Úto Amerika kinó Poto, babéngami ya kozua mosála moko ya "ntina koleka", na boleki na Sini pe Extrême-Orient, epái wápi mokónzi y'Amerika Donald Trump azali. Ezali mbela ebwakami na Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mokolo ya mibále 28 ya sánzá ya zómi na mokili mobimba po ya kosilisa na bitumba. Episkopo ya lokúmu Pietro Parolin azalaki mokolo ina ya ibále na lopitalo ya bána ya Bambino Gesù, o eleko ya bokundoli mibú 40 ya bondimami ya yango lokóla etéyelo ya lisálisi pe ya bolukiluki nzebi.

Bomipesi po ya bato

Na boyanoli na mituná ya bapanzi nsango o molulu ena, episkopo ya lokúmu abengaki lopitalo ndakisa ya "bolámu bopusi" na likambo ya bokolongono po ya katoliko pe ya Italie. "Ezali eleko yoko ya ntina, elobaki ye, po ya kobimisa bozali pe mosála lopitalo Bambino Gesù ekosála na motindo ya bokolongono, mingi po ya mwángo ya katoliko pe ya ekóló". Alobaki lisusu mosála po ya bato ya lopitalo eye eyambaki bána baútaka kaka Palestine te, kasi bikóló bisusu bizalaki na etumba lokóla. "Bambino Gesù esáli mosála yoko enéne po ya bato", elobaki episkopo ya lokúmu.

 "Tomipesi bôngó, na bokanisi 'te bokási ya moto, mingi na bosálisi ya baye bazui likámá ya etumba, pe na bozongisi bakangemi, ekoki kozala nzela yoko ya kobongisa boboto". Episkopo ya lokúmu Parolin abakisaki 'te Ngwendé ya Sántu-Petelo ekomiyoka "amikotisi na bozindo" na likambo ena, "likambo ya momeseno epái wápi diplomatie ya Vatican ezali makási úto Etumba ya Yambo ya mokili mobimba".

Bokási ya lisanga po ya kosilisa bitumba

Po etáli etumba na Ukraine, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alendisaki na bokébi, kasi lokóla na elikya: "Ezali pási" ya koyanola na motuná ya koyéba mikáno nini misengeli po ya kokoma na kozima-móto: "Soki nayébaki yangó, tolingaki kosálela miangó kála. Nakanisi 'te masoló mikoleka sik’oyo, tángo mosusu na bonkutu". Na bozongeli elikya na ye 'te masoló mibota mbuma na miangó, episkopo ya lokúmu amóni ezali na ntina bomipesi yoko enéne ya mokili mobimba: "Esengeli bozali y'Amerika, pe tokolikya 'te Poto ekosála mosála yoko ya ntina koleka. Sini azali na liloba na ye ya koloba, kútu mokónzi Trump azali sikáwa na Sini pe na Extrême-Orient po ya kotála likambo yangó. Lisálisi lya bansó izali na ntina po ya kokendisa boboto liboso".

Bokútáni na Viktor Orbán na Vatican

Atunami na súka na likita azuaki mokolo ya yambo 27 ya sánzá ya zómi na ministre wa Yambo ya Hongrie Viktor Orbán, episkopo ya lokúmu abengaki eleko ya "bokútáni kitoko", na bolimboli 'te "moko moko akokaki koloba likanisi na ye". Na motuná ya koyéba soki bitélemeli (positions) "bikabwana mosika", ayanolaki: "Tokomeka kozongisa yango pembeni koleka"

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye

30 sánzá ya zómi 2025, 09:56