Luka

Mgr Gabriele Caccia liboso y'assemblea generale ya ONU Mgr Gabriele Caccia liboso y'assemblea generale ya ONU 

Mgr Caccia: bonsómi ya eyamba ezali elembo mókó ya botosi makoki ya moto

Motáli ya eleko nionso ya Ngwende ya Sántu-Petelo epái ya ONU, Mgr Gabriele Caccia, azuaki maloba na bokútáni ya mosála ya commisio ya isáto na tángo ya mbala ya 80 y'Assemblée générale ya ONU. Na lisikulu na ye, alobaki bomipesi ya Eklezia na eye etáli bomátisi ya bobáteli ya makoki ya moto, na bobeti nsete na "mosála ya ntina ya bonsómi ya biyamba".

Vatican News

"Mokili ya leló ekokútana na mabakú minene, mingi penza bitumba pe mobúlú, kimobóla pe nzala, bokáti ndelo ya makoki pe bokáboli na biténi bato. Na esika waná, makási po ya komátisa bokási ya ONU ekokangama mingimingi na bokabwani epái na epái pe ekokóma pási likoló ya mikakatano ya mbongo. Na bileko miye, likanisi mókó ya mozindo, likanisi mókó ya sika pe mpiko ya kozua mikáno ya pási bizali na ntina", elobaki Mgr Gabriele Caccia, motáli ya eleko insó ya Ngwende ya Sántu-Petelo epái ya ONU na bokútáni ya mosála ya commisio ya isáto na tángo ya mbala ya 80 y'Assemblée générale ya ONU.

Kotómbola pe kobátela makoki ya moto

Na bozui maloba, Mgr Caccia akundolaki 'te "makoki ya moto mikozua misisa na yangó na lokúmu epesami na Nzámbe na moto nionso". Letá azali bôngó "na lotómo ya kotómbola pe kobátela makoki ya moto, miye mizali makambo ya ntina po ya bolámu ya moto". Po ya episkopo, "waná esengeli esálema na mwángo mókó ekosálisa na mbala mókó bonsómi ya moto ye mókó pe mikúmbá na bisó. Makoki mina mizali ya mokili mobimba, ya kobébisa te, ya kokabama te. Ya mokili mobimba po mizali epái ya bato bansó, na bolongoli te. Ya kobébisa te po mizali ya kokangama na nzóto ya moto pe na lokúmu na ye. Ya kokabama te po moto na bosémbo akoki kopima moto mosusu te na makoki mina, zambi ekosála mobúlú na bomoto na ye".

Bobángi ya loléngé mókó ya momeseno ekobongisa nionso

Episkopo alobaki 'te "soki, na kála, mayéle ya ba colon eyébaki bomoi ya sóló ya bato te pe ekotinda na makási ba loléngé ya mimeseno mibongisama, leló loléngé ya kokonza bato na molimo mikómi ebelé miye mikotútana na bosóló, ekobundisa bokangemi ya bato na makambo na bangó ya ntina pe mikokokanisa kosilisa bonkoko na bangó, lisoló na bangó pe bansinga na bangó na biyamba". Engebene na Mgr Caccia, "mayéle ena, na bokanisi esili kolekisa makásá ya mabé ya lisoló, emifungoli na "momeseno ya kolimwisa", eye ekosambisa ya kála kaka úto biténi ya eleko eye". Ekobóta loléngé mókó ya momeseno ekobongisa nionso, ekokokanisa nionso, ekolinga bokeseni te pe ekotála kaka eye ya leló, na ba pósá na bangó pe makoki ya bato, na bomoni ntina te mingi penza lotómo na bangó epái ya bandeko na bangó bazangi makási pe makoki: babóla, ba migrant, mibangé, bato ya bokono, bána bakobótama...Mizali bangó, ekobaki ye, babósana bangó na "bato ya bolámu; mizali bangó, na bokinoli lya bansó, babwakama lokóla makásá mikufa ya kozikisa".

Mgr alobaki lokóla bomipesi ya Ngwende ya Sántu-Petelo po ya kobátela bonsómi ya biyamba, eye ezali na "mosála ya ntina, kaka po eyébi bonsómi misusu te, kasi po ekolakisa momekano ya makási na botosi ya makoki minsó ya bato pe bonsómi ya motúya". Lokóla elobi Papá Léon XIV, "na bosáli elongo, tozali na likoki ya kotónga mokili mókó esika wápi moto móķó mókó akoki kobika bomoi mókó penza ya bomoto na bosóló, na sembo pe na boboto", elobaki ye. Ngwende ya Sántu-Petelo, "ekokoba kosála mosála na ye", esúkisaki ye.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló eye

10 sánzá ya zómi 2025, 17:05