Luka

Primo Regina Coeli di Papa Leone XIV

Na 27 ya sánzá ya zómi, Papá akokutana na motomolo ya Eklezia ya Assyrie ya Orient

Botáli ya yambo eye ya Catholicos assyrien Mar Awa III na Léon XIV, ekozala mokolo ya yambo ekoya na Vatican. Akozala elongo na bilama ya Commission mixte po ya lisoló etáli théologie káti ya Eklezia katoliko pe Eklezia ya Assyrie ya Orient.

Vatican News

Na communiqué mókó ya dicastère ya Bomátisi bomoko ya bakristu, esakolami 'te Mosántu Mar Awa III, akosála botáli na ye ya yambo na Papá Léon XIV, mokolo ya yambo 27 ya sánzá ya zómi ekoya.

Katoliko motomolo ya Eklezia ya Assyrie ya Orient, akozala elongo na bilama ya Commission mixte po ya lisoló ya théologie káti ya Eklezia katoliko pe Eklezia ya Assyrie ya Orient, eye ekokoba sik’oyo na Roma eténi ya sika ya lisoló etáli liturgie na bomoi ya Eklezia.

Na 9 ya sánzá ya zómi na mókó 2024, François ayambaka motomolo ya Assyrie Mar Awa, mibú ntúkú misáto simá ya botiyi lobóko na "Déclaration christologique commune" ya Yoane-Polo II pe Mar Dinkha IV, eye esúkisaki mibú 1500 ya mikakatano etáli doctrine káti ya Eklezia katoliko pe Eklezia ya Orient.

O eleko ya likita ena kaka, Papá François asakolaka 'te sántu Isaac ya Ninive, oyo ayébani lokóla na nkómbó ya Isaac le Syrien, mókó ya ba Tatá bakúmisami mingi na momeseno ya Syrie na Orient, akokomama na Molongó ya ba martyro ya Roma.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye.

25 sánzá ya zómi 2025, 19:50