Luka

Ba thanks ya Israël na ndelo kati ya Israel pe Gaza Ba thanks ya Israël na ndelo kati ya Israel pe Gaza  (AFP or licensors)

Ngwendé ya Sántu-Petelo ekokoba kondima mwángo ya kimia na Gaza

Mokolo ya mibále eye 21 ya sánzá ya zómi, episkopo ya lokúmu Parolin abimisaki "bobangi" na ye libosó ya mobúlú misálemaki simá ya bopemi na Proche-Orient, na bobengi yangó ya kolinga te matáta epái ya bakristu ya Cisjordanie. Na lisoló na bapanzi nsango o eleko ya liyangani mókó na Roma, Secrétaire ya Letá ayókaki mabé "makambo ya bobangisi epái ya ba média" simá ya mobúlú elukaki mopanzi nsango ya Italie.

Vatican News

Ngwendé ya Sántu-Petelo "ekobánga" bopemi na Gaza eye ezali lokóla ekómaki na súka na mobulú ya mikolo mileki, kasi "ezali na elikya 'te mwángo ya kimia ekoki kosála". Yangó waná episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, alobaki likambo na Mabelé Esántu o eleko ya bolakisi édition ya súka ya Mokánda (Rapport) etáli bonsómi ya eyamba na mokili, ebongisami na Lisálisi ya Eklezia na pási. Libosó ya etéyelo ya Papá Augustinianum na Roma, episkopo ya lokúmu andimaki koyanola na mituná ya bapanzi nsango. Mókó káti na miangó etálaki bonyokoli na Cisjordanie, mingi penza na etuka ya Taybeh, epái ya ba colon ya Israël. "Likambo yangó ya sóló ezali na biténi mingi, kasi tokoyéba te po na nini bakristu miye, bazali na bomoi mókó ya kimia, bakoki bazua bonyokoli ya boye", elobaki episkopo ya lokúmu Parolin. "Ezali likambo mókó ya mindondo, kasi ezali makambo miye tokoki kolinga te".

Mobúlú epái ya bakristu na Nigeria

 Na botáli na ngámbo y'Afrika pe mbóngé ya likunia pe ya mobúlú na bituka misusu ya Nigeria, episkopo ya lokúmu, na botángi bato misusu ya ekóló ena, asémboli 'te etumba na Nigeria "ezali etumba ya eyamba te, kasi etumba mókó ya bato, ndakisa káti ya babókoli-bibwélé pe basáli-bilanga". "Tobósana te 'te na Nigeria lokóla, ba musulman ebelé bazali konyokwama po ya bozángi bondimi", elobaki episkopo ya lokúmu. "Mizali bituluku ya ba extrémiste miye mizali kosála bokeseni te po ya kozua biloko balingi. Bakoluka kaka mobúlú epái ya baye bansó bazali komóna bangó lokóla babóyi (opposants)".

Bobangisi epái ya bapanzi nsango

Na súka, na bomanyoli likambo ya bonsómi ya eyamba kasi lokóla eye ya bonsómi nionso, episkopo ya lokúmu alobi 'te "misála ya bobangisi bapanzi nsango mizali liziba mókó ya motungisi". Na bolobi likambo ya mobúlú esálemaki mokolo ya minei eleki epái ya mopanzi nsango ya Italie Sigfrido Ranucci. Eloko mókó epanzanaki libosó ya ndáko ya molakisi ya émission ya Italie Report. Secrétaire ya Letá, oyo alobi "bomoko na ye na baye banyokwami po ya bobangisi ena", amóni 'te "tokobánga tobika koleka na motindo ya bozángi bondimi, epái wápi bonsómi ya koloba endimami lisusu te. Tolingi, elobi ye, 'te mókó mókó akoka koloba eye ye amóni na botosi pe na bosóló, kasi mókó mókó akoki koloba na boyóki pási te na loléngé ena ya bobangisi te".

 Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye.

21 sánzá ya zómi 2025, 16:01