Luka

Elili ya bolakisi Elili ya bolakisi  (Jeffrey Ortega)

"Basangani na Kristu, basangani na etindá"

Ezali likambo-likonzi ya Mokolo ya motindami ya mokili 2026, eponami na Papá po ya bosepeli mibú nkáma ya institution elingamaka na Papá Pie XI, na likanisi epesamaki na Œuvre pontificale ya bopalanginyi boyambi, ebimaki mokolo ya itano 31 ya sánzá ya zómi.

Vatican News

"Basangani na Kristu, basangani na etindá". Waná izali likambo-likonzi eponami na Léon XIV pe ebimaki mokolo ya itano 31 ya sánzá ya zómi -mokolo ya súka ya sánzá ebonzama na momeseno na bitindá- ya Mokolo ya motindami ya mokili 2026. Eklezia ekokundola mobú mokoya mibú nkáma ya Mokolo ena úta bokelamu na yangó na 1926 na Pie XI, na likanisi epesamaki na Œuvre pontificale ya bopalanginyi boyambi.

Mbela ya Léon XIV

Na mbela abimisaki mobú eye po ya Mokolo ya motindami ya mokili, Papá Léon XIV alobaki 'te ezali eleko yoko ya motúya epái wápi Eklezia mobimba esangani na losambo po ya batindami pe po ya mbuma elamu ya mosála na bango. Papá wa Roma, na bolobi lisusu mosála na ye ya sángó pe episkopo motindami na Pérou, alobaki: "Namonaki na miso na ngai boni boni boyambi, losámbo pe likabo misálemaki o eleko ya Mokolo ina mikoki kobongola masangá nionso".

Liloba ya Papá, singa momemi ya misála minsó

Likambo-likonzi ya Mokolo ya motindami ya mokili mobimba 2026, eye ekoloba lisusu na eténi na yangó ya yambo liloba-ntina eponama na Papá po ya mosála na ye "In Illo uno unum", ekoloba bomoko ya bandimi na boyambi, esálemi na bomoko ya Kristu na Tatá, pe etindá ya lisangá ya bopalangisi nsango-ndamu eye ewuti kúna. Likambo ikoya simá na bobongisi Mokolo ekozala bopalanginyi, o eleko ya ba sánzá ya yambo ya mobú, liloba ya Sántu-Papá iye ekokóma singa momemi ya misála nzike ya bokambi pe ya botéyi ya molimo pe ya mokumba ya motindami epái ya bandimi bansó. Kaka mobú ekoya ekokundolama lokóla mibú 110 ya bokeli Union pontificale missionnaire, elimbolama na sántu Polo VI lokóla "molimo ya ba œuvres pontificales missionnaires misusu" (Œuvre de la propagation de la foi, Œuvre de la Sainte Enfance et Œuvre pontificale de saint Pierre Apôtre). Misála minei miye, yoko yoko na loléngé na ye, mikobonza elongo komátisa bokonzi ya motindami epái ya baye babatisama pe ya kosálisa ba Eklezia ya sika.  

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye

01 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 09:38