Luka

Episkopo ya lokumu Claudio Gugerotti na mobémbo na Belarus Episkopo ya lokumu Claudio Gugerotti na mobémbo na Belarus 

Episkopo ya lokúmu Gugerotti: "Kaka lisoló lyoko ya semba ekoki kofúngola nzelá ya elikya"

Mokambi ya dicastère po ya ba Eklezia ya monyele akoloba na lisoló lyoko apesaki na ba média ya Vatican nini akendeki kosála na Bélarus pe na Roumanie. "Lisoló lyoko ya semba ezali kaka na ntina po kokitisa mindondo", elobi episkopo ya lokúmu Claudio Gugerotti na bolobi bobimisi o boloko ya ba sángó mibále na Minsk.

Jean-René Bompolonga  - Kinshasa

Na bolobi esengo enéne na ye po ya bobimisi o boloko na Bélarus ya ba sángó Henryk Akalotovich, sángó mokónzi ya ndáko-Nzámbe Sántu-Yosefu na Valozhyn, pe Andrzej Yuchniewicz, Batindami ya ba Oblats ya Maria azanga mbindo na mosála na sanctuaire ya dioceze Notre-Dame ya Fatima ya Shumilino, Lisangá ya baepiskopo ya Bélarus elobaki na communiqué mókó "matondo na ye epái ya baye bansó basáli" na bosúkisi malámu likambo ena epái ya bazuzi.

Motindami ya Papá na Bélarus

Baepiskopo ya Bélarus batindi bamelesi ya sóló na bangó na episkopo ya lokúmu Claudio Gugerotti, oyo akendeki na ekóló na sánzá ya zómi elekaki lokóla motindami ya ntina ya Papá Léon XIV. Liloba ekundoli bolingi ya kála ya episkopo ya lokúmu epái ya bato ya Bélarus, eye ebándi o eleko azalaka ntómá ya Papá na Minsk. Mobémbo ya episkopo ya lokúmu Gugerotti "epesaki likambo lyoko ya malámu na bato basusu", tokoki kotánga na mokánda, "na káti mókó ya ba mbano ya malongá ezalaki mokáno ya mokónzi ya ekóló Bélarus, na elembo ya mawa pe ya botosi epái ya Papá, ya kolimbisa pe ya kobimisa basángó babále katoliko baye bazalaki kosála bitumbu na bangó na boloko".

Etindá yoko ya eyamba mpenza

"Nakendeki na Bélarus -elimboli mokambi ya ba Eklezia ya monyele- na lisengi ya Papá, ya yambo po ya kozala na bokundoli mibú nkáma ya dioceze ya Pinsk. Likambo lyoko ya malámu, po esálisi ngai koyoka motéma ya molimo ya bakatoliko ya ekóló". Likambo lisusu ya esengo, ekobaki episkopo ya lokúmu, ezalaki likoki ya "kokutana na bakambi misusu zambi ya kokoka koloba na sóló eye ezalaki koleka na mokili, po mbano ya diplomatie na bisó ezali ya kozongisa sika bokútáni boko po esúka na lisengi ya pamba te, kasi eumela lokóla na bomoni boko ya nionso ekoki kozala na ntina po ya kososola boni boni kosála na bozongisi sika na ndéngé ya koleka".

Mosála ya diplomatie ya Ngwendé ya Sántu-Petelo

"Na ndéngé waná, nalobaki masengi miye miyambamaki malámu pe tolingi kotondo po ya botiki basángó babále. Nakolikya kokoka kokende libosó na makambo misusu. Po ya sik’oyo, eye ekotungisa bisó koleka, ezali nungunungu makási eye ekosálema na bandelo ya Lisangá ya Poto (Union européenne) pe eye ekolakisa eloko yoko ya bobangi makási", elobi episkopo ya lokúmu.

Ntina ya lisoló

Episkopo ya lokúmu Claudio Gugerotti akanisi eleko molayi alekisaki na Bélarus lokóla ntómá ezalaki po na ye likambo lyoko ya ntina pe ya koyékola. Pembeni ya mibú mitáno, asengelaka kobunda libosó ya makambo makási mingimingi ya mokili na ya bato. "Botiyi motéma epái na epái ekotaki, eye esalisi ya kosolola na bosóló atá soki makanisi makeseni, kasi tozalaki kaka na elaká ya komizua na ntina". Na ndéngé ya géopolitique, ekobaki ye, "ezali kaka na motúya makási ya kosangisa makabo makoki na nzelá ya boluki kimia, na botáli 'te na ngonga eye, nionso ezali longola kaka liyoki ya boluki kimia".

Kolonga ba pótá ya kála

Na bolobi mobémbo na ye na Roumanie po ya bovandisi episkopo grec-catholique esálemaki na cathédrale ya Blaj, mokambi po ya ba Eklezia ya monyele alobi ntina ya koyéba kozua ba nzelá biye bikosálisa kolonga bileko ya pási koleka na lisapo ya sik’oyo. "Baepiskopo ya Roumanie ya sik’oyo bangó bansó batéyami na Etéyelo ya Papá ya Roumanie" pe bayébi mosála na bangó. "Bokanisi ba martyro bizali na ntina ya kotala na kimia mokili pe motindo ya leló", ebakisi ye.

Ba mbongwana ya malongá

Episkopo ya lokúmu Gugerotti alobi ntina ya koyéba kokanga bilembo ebelé ya mike biye bikomi na Roumanie: "Tángo likambo ezali malámu te, waná ekosenga na bisó botáli ya sika po ya kozua banzelá ya sika". Episkopo ya lokúmu alakisi, na ndakisa, likambo 'te Letá abonzaki mobú moye na bokanisi episkopo ya lokúmu Iuliu Hossu, nzeneneke enéne ya boyambi, ye lokóla akangemaka pe anyokwamaka na bokónzi ya ntángo ena. "Namoni ezali na ntina 'te bato ya ndéngé waná bakomi elembo lyoko ememiama pe ekumisama na miso ya bato na ekóló", esúkisaki ye.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

24 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 11:35