Mambi mwa Boyambi: "Bimonani ya Dozulé bizali ya bonzámbe te"
Vatican News
"Likambo ya bimonani (apparitions) ya lokutá esalemaka na Dozulé", ekangama na bosáli kúrúse yoko ya monéne eye elakaka bolimbisi ya masúmu pe libiki na baye bakolinga kopúsana, "esengeli endimama, na loléngé ya súka, lokóla ya bonzámbe te", ekomaki dicastère ya Mambi mwa Boyambi na mokánda mókó etiami lobóko na episkopo ya lokúmu mokambi Victor Manuel Fernández, na bondingisi episkopo ya Bayeux-Lisieux, Mgr Jacques Habert, ya kobimisa dékélé (décret) elongobani. Mokáno endimamaki na Léon XIV na 3 ya sánzá ya zómi na yoko.
Káti ya 1972 pe 1978, na mboka mókó ya moke ya Dozulé, na Calvados na France, Yézu abimaka mbala 49 na Madeleine Aumont, mama ya libotá, na bosengi botongi "kúrúse ya nkembo ya Dozulé", eye etongama te: esengelaka ezala mobimba na mwinda pe ezala na molayi ya metele 738, na mabóko metele 123, zambi emonanaka na mosika lokóla elembo ya bolimbisi ya mokili. O eleko ya ba mibú zómi mileki, ba "Kúrúse ya Bolingo", na bokitisi na motindo ya 1/100 ya "Kuruse ya Nkembo", bitongamaki na bikóló misusu ya mokili.
Kobánda sánzá ya minei 1983, episkopo ya tángo waná, Mgr Jean-Marie-Clément Badré, alobaka 'te "botongi ya kúrúse yoko enéne na Dozulé (...) ekoki atá moke te kozala elembo lyoko ya sóló ya bomonani ya Elimo ya Nzámbe". Kaka episkopo ena asakolaka na 8 ya sánzá ya zómi na mibále 1985: "Na oyo etáli eye ekoleka na Dozulé, ekelá (action) pe mobúlú, bokongoli mosolo na bato bazali kosála na mokumba na bangó mókó, na etindá ya moto te, na botosi atá moke te bokónzi ya episkopo, (...) bopalangisi ya álangá (fanatique) po ya "nsango", bokitisi na likambo ya baye babóyi, bimemi ngai namona, na koyéba, 'te koleka mobúlú ena nionso, nazali kokoka te kososola bilembo biye bikondingisa ngai ya kosakola bosóló ya "bimonani" biye bazali koloba". Episkopo ya sika Mgr Habert, na botáli ba mwángo ya mikolo miye po ya bososoli ba makambo balobi ya bonzámbe, apesaki likanisi na dicastère ya declaratio ya non supernaturalitate, "nsakola mókó ya bonzámbe te".
Ezali na ebándeli ya bonzámbe ya sóló te
"Dicastère endingisi yo ya kosakola na loléngé ya súka 'te likambo ya bimonani ya Dozulé emonani ezali ya bonzámbe te, elingi koloba ezangi bosóló ya ebándeli ya bonzámbe", tokoki kotánga na mokánda ya episkopo ya lokúmu Fernández.
O ntei ya bilokó ya kwokoso mibimaki na ba nsango, ezali likambo ya kokokanisa "kúrúse esengamaki na Dozulé na eye ya Yérusalem", ezali na "bobángi ya kobúlinginya elembo ya mobombano, pe ya kopesa likanisi 'te tokoki "kobimisa lisusu" to "kozongisa sika" na motindo ya physique eye Kristu asila kosála mbala mókó po ya libela". Elobami lisusu 'te "maloba misusu bizali na ba nsakola ya Dozulé bikobeta nsete na botongi ya "Kúrúse ya Nkembo", lokóla elembo yoko ya sika, esengeli po ya libiki lya mokili, to nzelá ya malongá po ya kozua bolimbisi pe boboto na mokili. Tángo mosusu ezali "kobakisa elembo", lokóla sóki bopalinginyi ena ezalaki etindá yoko epesamaki na makási na Kristu ye moko".
Dicastère po ya Mambi mwa Boyambi emoni 'te "Kúrúse ezali na pósá yoko te ya ba metele 738 ya ebende to ya béton po endimama: ekoteleme tángo insó motéma mókó, na ekela ya ngrásya, efungwami na bolimbisi, molimo mókó ebongwani, elikya yoko ebotami lisusu esika wápi emonanaki ekosálema te, pe atá tángo mondimi, na bopesi ekópi na kúrúse yoko ya moke, akomipesa na Kristu". Pe elobi lisusu 'te "mobombano mókó te ya moto ye mei esengeli emonana lokóla lotómo lyoko ya mokili to elembo eye epesami na makási na boyébi ya bandimi, atáko sóki makambo mina bikobimisa ba mbuma ya molimo. Eklezia ekolendisa bilembo ya boyambi biye bikomema na mbongwana pe na likabo, kasi ekokebisa libosó ya ndéngé nionso ya "bosantisi ya elembo" eye ekoki komema ya komona eloko lyoko ya nzóto lokóla bolakemi mókó ya libiki"
Bokeseni na mambi ya libiki
Na ba nsakola ya Dozulé, elobami 'te "baye bansó bayaki po ya komima (se repentir) na nsé ya Kúrúse ya Nkembo bakobika", 'te " Kúrúse ya Nkembo ekolongola masúmu minsó" pe 'te baye bansó "bakoya, na botiyi motéma makási, komima waná, bakobika na bomoi eye pe po ya seko". Maloba mana bimonani 'te "bikeseni na mambi ya katoliko ya libiki, ya ngrásya pe ya ba sakramento" na dicastère.
Mokánda ebimisi maloba misusu miye biwangani makambo, lokóla ndakisa eye engebene na Yézu asengaka ya kosála "Kúrúse ya Nkembo pe sanctuaire" yambo ya súka ya Mobú Esántu ya 1975, "po ekozala súka ya Mobú Esántu". Ezali ya sóló te, pamba te, mibú mibále misusu bisántu ya momeseno (2000 pe 2025) pe mibú misusu bisántu ya momeseno te (1983 pe 2016) bisálema. Mokánda ekotanga maloba ya pási, lokóla maye engebene na Nzámbe oyo alobaka: "Sóki moto atongi Kúrúse te, nakobimisa yango, kasi akozala lisusu na ngonga te".
"Kúrúse lokóla elembo ya limemya, esúkisaki dicastère po ya Mambi mwa Boyambi na likanisi lyoko ya ntina na motúya ya sakramento ya Kúrúse, ezali ya kobimisa o libanda te. Tángo mokristu mókó akomemya Kúrúse, azali kokumisa libaya to ebende te, to akokanisa 'te kúrúse yoko ya nzóto ekoki kokitana mosála ya libiki esila kosálema o eleko ya Pasika ya Kristu, kasi akokumisa Oyo, likolo na yango, apesaka bomoi na ye".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.