Episkopo ya lokúmu Parolin na Mozambique po ya kosepela mibú 30 ya boyokani na diplomatie
Vatican News
Mobémbo na Mozambique ya episkopo ya lokúmu Parolin, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ebandaki mokolo ya mitáno 5 ya sánzá ya zómi na ibále, o eleko ya bosepeli mibú 30 ya boyokani na diplomatie káti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo pe ekóló ena y'Afrika epái ya sudi. Engebene na linaka ebimaki na internet, episkopo ya lokúmu akutanaki mokolo ya itáno na mokónzi ya ekóló, Daniel Francisco Chapo. Kaka mokolo ena, ndáko ya ntómá ya Papá na Maputo eyambaki molulu ya bosepeli mibú 30 ya boyokani na diplomatie káti na Ngwendé ya Sántu-Petelo pe ekóló Mozambique.
Misa ya bosúkisi mokolo ya ekóló ya bolengé
Ebongisami 'te akutana mokolo ya póso na mokambi ya Lisangá ya bantóma ya bato ya ekóló, Margarida Adamugy Talapa, ministre wa Yambo, Maria Benvinda Levy, pe ministre ya Bosémbo pe biyamba, Mateus da Cecilia Feniasse Saize. Episkopo ya lokúmu akokutana na baepiskopo ya Mozambique. Mokolo ya eyenga 7 ya sánzá ya zómi na ibále, Secrétaire ya Letá akokamba misa ya bosúkisi Mokolo ya ekóló ya mbala isáto ya bolengé na libandá ya masano Maxaquene ya Maputo, simá na yangó akokende kotála esika ya lisálisi po ya babóla Casa Mateus25.
Bakimi, káti ya basáli ya Nzámbe pe Sant'Egidio
Na 8 ya sánzá ya zómi na ibále, eyenga ya Mbótama ezanga Mbindo, botáli boko na dioceze ya Pemba ebongisami, na bokútáni na bakambi civil, basáli ya Nzámbe pe bosáli misa. Na 9 ya sánzá ya zómi na yoko, episkopo ya lokúmu Parolin akokutana na etuluku yoko ya bato bakima o káti ya ekóló. Mokolo ya súka ya mobémbo, 10 ya sánzá ya zómi na ibále, botáli boko na Centre DREAM ya Lisangá Sant'Egidio na Zimpeto ebongisami.
"Botáli ya Mgr ezali elembo yoko ya bomoko pe bozali pembeni ya Sántu-Papá, Papá Léon XIV, epái ya baí-Mozambique bansó, pe mingi mpenza po ya bato ya makámá ya bobángisi bato na Cabo Delgado", baepiskopo katoliko ya Mozambique basakolaki yangó na 28 ya sánzá ya zómi na yoko elekaki.
Papá Yoane Polo Il asálaka mobémbo mokó na Mozambique na 1988, eleko eye Eklezia ekobaki kosála likambo lyoko ya ntina na botóngi boboto pe boyókani simá ya etumba ya ba civil. Papá François atálaka Mozambique na 2019. Papá eye abimisaka lisálisi na ye po ya Mozambique zambi ya kolendisa boboto, botelemisi (stabilité) pe ya boyókani na ekóló.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.