Bokongoli mpo ya Mabelé Esántu, elembo yoko ya sóló ya bosangisi mpe ya elikya
Vatican News
Na mokolo ya misáto eye ya Putulu, Custode ya Mabelé Esántu ebengi bandimi ya mokili mobimba ya kosálisa masangá ya bakristu na lisálisi ya Collecta pro Locis Sanctis -Bokongoli mpo ya Mabelé Esántu, ebótama na mpósá ya ba Papá ya kokanga nsinga yoko ekási káti ya bakristu ya mokili mpe ya Bisika Bisántu. Ezali kaka bokongoli boko ya makabo te mpo ya Mokolo ya Mitáno Esántu, kasi ya ekela yoko ya bosangisi bakristu baye bazali na bisika Nsango-Ndamu ezuaka nzóto.
"Etumba, mobúlú mpe bozangi ya bato ya mobémbo mwa boyambi bikomisi bomoi pási na masangá ya bakristu kúna", elobi na communiqué yoko sángó Francesco Ielpo, aponamaki Custode ya Mabelé Esántu mpe Mobateli ya Ngomba Sion na Papá Léon XIV na sánzá ya sambo 2025. Ndeko franciscain "abengi na losámbo mpe na likabo, na bolobi lisusu 'te Pasika ezali liziba ya elikya mpe ya bomoi ya sika".
Bokongoli ya Papá ekosálisa bitéyelo, ba paloise mpe ba mwángo ya bato, na bokangi bongo na bomoi bozali ya bokristu na Bisika Bisántu.
"Bilenge bazali na pási koleka ya kokanisa lobi lyokó áwa, na mabelé na bangó. Elikya yangó-mei emonani lokóla ezoki, na Bethléem, na Yérusalem, na Nordi ya Israël, mpe lisusu na Liban mpe na Syrie", elimboli sángó Ielpo na vidéo ebimaki lokóla mokolo eye ya misáto mpe na nkombo ‘Pesa elikya mpe lóna boboto’. "Na eleko eye, bikoyokana na makási maloba ya Sántu-Papá, oyo akoyebisa biso lisusu lombango ya losámbo mpe ya bomipimi mpo ya boboto, na bobengi na moléndé ya kosilisa etumba na Mabelé Esántu".
Bituka biye bikozua, na loléngé na loléngé, lisálisi ya Bokongoli, bazali baye batangama na lisoló ya libiki ya Makomi Masántu, kobánda úto Éthiopie kinó Iran, na boleki na Yérusalem, Palestine, Israël, Jordanie, Chypre, Syrie, Liban, Ezypeti, Erythrée, Turquie mpe Irak.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.