Luka

Esika mpe basilique Santu-Petelo Esika mpe basilique Santu-Petelo 

Bondeko Sántu-Pie X ebwakisi lisoló na Ngwendé ya Sántu-Petelo, bokulisi ekosálema

Na mokánda mókó etindami na episkopo ya lokúmu Fernández, préfet ya dicastère mpo ya Matéya ya boyambi, mokambi monéne ya bondeko, sángó Davide Pagliarani alobi komona likoki lyokó te ya kobánda lisoló lyokó ya "boyékoli matéya ma Nzámbe na mozindo" lokóla esengami na Ngwendé ya Sántu-Petelo na botáli 'te "mikánda ya Concile bikoki kobongisama te, na lokóla bosémbo ya bobongisi Bobongoli milulu mpe nsámbo ya bakristu na misa". Lokóla boyokani ezali te, mokáno ya kokulisa baepiskopo ya sika na mo

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Ezali boboyi bókó ya bobongisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ya lisoló lyokó "etáli mpenza boyékoli matéya ya Nzámbe na bozindo", mpo na ndéngé nionso, mikánda ya Concile mpe bosémbo ya bobongoli ya milulu mpe nsámbo ya bakristu na misa bikoki kobongwama te. Iyo mpo ya bokulisi baepiskopo ya sika ebongisami mpo ya mokolo ya yambo ya sánzá ya sambo. Bondeko Sántu-Pie X ayanolaki na mokánda mókó ya Mokambi monéne, sángó Davide Pagliarani, na episkopo ya lokúmu Victor Manuel Fernández, préfet ya dicastère mpo ya Matéya ya boyambi, o eleko ya bokútáni na bangó na Vatican na 12 ya sánzá ya mibalé elekaki. Na nsakola yókó eye elandaki lisoló ená, episkopo ya lokúmu Fernández alobaki bokútáni yangó ya "motéma" mpe ya "soló", mpe alobaki asengaka na bilama ya bondeko ya kobánda lisoló lyokó ya boyékoli matéya ya Nzámbe na mozindo, engebene na motindo móķó ya sémba, na mituná biye bikomi nanu polélé te. Bobongisi ena ekambamaki na bosenga bókó ya bokati bokulisi ya baepiskopo mokolo esakolamaki na 2 ya sánzá ya mibalé mpo ya sánzá ya sambo ekoya, mpo yangó « ekomema bokati bókó ya bosangisi ya eklezia (bokabwani), na makambo mabé mpo ya Bondeko mobimba ».

Póso elekaki, Davide Pagliarani asakolaki 'te akolakisa bobongisi ya Vatican na bilama ya Likita lya bansó ya bondeko. Na bolobi 'te eleko yókó ya kokoka ebongisamaki mpo ya botáli, atindaki na 18 ya sánzá ya mibalé eyano yókó na episkopo ya lokúmu, etiamaki maboko na bilama mitáno ya Likita lya bansó.

Bobongisi ya lisoló

Na mokánda ená etindami epái ya episkopo ya lokúmu Fernández, mokambi ya Bondeko (lisangá ekelama na Mgr Marcel Lefebvre na mibú 70 mpo ya kotelemela bobongoli ya Concile Vatican II), abimisi esengo na ye, epái yókó, mpo ya "bofúngoli ya sika ya lisoló", na bomoni waná "eyano yókó ya malámu" na bobongisi ya "lisoló etáli matéya" eye ye móķó abongisaki na sánzá ya yambo 2019, "na eleko yókó ya kimia mpe ya boboto, na bozangi bobángi ya bobwakami libanda ya eklezia". Epái esusu, sángó Davide Pagliarani abwakisi bobongisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, na botáli 'te lisoló lyokó ekosálisa te mpo ya « kokoma ya kozua elongo eye ekozala "maséngisi ya moke mpo ya bosangisi na Eklezia katoliko’’ », zambi « mikánda ya Concile bikoki kobongisama te, na lokóla bosémbo ya Bobongoli milulu mpe nsámbo ya bakristu na misa ». "Concile", elobi mokambi monéne ya bondeko, "ezali lisangá lyokó ya mikánda bikoki kolimbolama na bonsómi: eyambamaki, etombolami mpe esálemaki úto mibú ntuku motóbá, na ba papá biye bakitana, engebene na mibéko ya matéya mpe ya bobateli ya sémba. Litangi ená ya sóló ebimi, ndakisa, na mikánda ya ntina lokóla Redemptor hominis, Ut unum sint, Evangelii gaudium mpe Amoris laetitia. Ekomilakisa lokóla na Bobongoli ya milulu mpe nsámbo ya bakristu na misa, esosolami na mwinda ya mibéko bilobami na Traditionis custodes. Mikánda mina minsó bikolakisa 'te esika ya matéya mpe bobateli epái wápi Ngwendé ya Sántu-Petelo eyebi kotiya lisoló nionso eyebana kála".

Bokulisami ekozala

« Na bomoni ekabolami 'te tokoki koyókana te na matéya, namoni 'te likambo lyokó kaka esika tokoki kokutana ezali eye ya likabo epái ya milimo mpe epái ya Eklezia », ekómi sángó Pagliarani. Mokambi ya Bondeko -oyo andimi bosóló ya milulu mpe nsámbo ya bakristu na misa eúti na bobongoli na yangó te- alobi na súka, akoki kondima te "botáli mpe nini ekolukama na nkombo ya baye dicastère abongisi ya bozongeli lisoló na ndéngé likambo ezali sik’oyo; na bopusi ya mokolo ya yambo ya sánzá ya sambo". Bokulisi ya baepiskopo ya sika ekosálema lokóla "mpósá mókó ya sóló ya ngonga moke mpo ya lobiko ya momeseno".

Communiqué ya episkopo ya lokúmu Fernández

Esengeli koyéba, na nsakola na ye ya 12 ya sánzá ya mibalé eleki, episkopo ya lokúmu Fernández alobaka: "Ngwendé ya Sántu-Petelo elobaki lisusu 'te bokulisi ya baepiskopo na ndingisa ya Ngwendé ya Sántu-Petelo te, oyo azali na bokónzi ya ntina, nionso, ya mokili mobimba, ya sik’oyo mpe ya mbala mókó (cf. CDC, can. 331; Constitution dogmatique Pastor aeternus, chapitres I et III") ekokotisa bokabwani ya lisangá ya Eklezia na makambo ya mabé mpo ya bondeko nionso (Jean-Paul II, Lettre apostolique Ecclesia Dei, 2 juillet 1988, n° 3 et 5c ; Conseil pontifical pour les textes législatifs, Note explicative, 24 août 1966, n° 1)».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

20 sánzá ya míbalé 2026, 15:32