Luka

Basilique Santu-Petelo Basilique Santu-Petelo  (@Vatican Media)

Molimo mpe tekiniki mpo ya kosepela mibú 400 ya basilique Sántu-Petelo

Sángó ya basilique Sántu-Petelo alakisaki na ndáko ya makita ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mokolo ya yambo 16 ya sánzá ya mibalé linaka ya makanisi bibongisami mpo ya kosepela bokundoli ya bobonzi ya basilique Sántu-Petelo. Bizibeli mibalé bikofungwama mpo ya bato nzambi kolekisa bandimi ya mobémbo mwa boyambi mpe na bato ya mobémbo

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Káti na milulu bibongisami mpo ya kosepela mibú 400 ya bobonzi ya Sántu-Petelo (1626-2026) ezali na bomonisi biténi ya bokanisi mpe ya botóngi ya basilique ya Vatican, úto bilembo ya libosó y’architecte Donato Bramante kinó bosilisi na yangó na Carlo Maderno. Linaka elakisamaki mokolo ya yambo na ntongo, na 16 ya sánzá ya mibalé, na ndáko ya makita ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo.

"Bokundoli boko ezali eleko ya kokanisa molulu mókó ya lisapo, mpo ya sémba ezali ya kobátela molimo ya Papá ya yambo, Petelo, mpe ya basilique eye ekobomba molimo ya bomoi ya Yézu-Kristu mpe evandi na bolobi ya boyambi y'apostolu Petelo ye mókó"  elimbolaki episkopo ya lokúmu Mauro Gambetti, sángó enéne ya basilique ya papá Sántu-Petelo mpe mokambi ya Bosáli ya Sántu-Petelo, na bolakisi linaka ya bosepeli. Linaka ebongisi 'te milulu mikosila na 18 ya sánzá ya zómi na mibalé 2026 na misa mókó ekokambema na Papá Léon XIV.

"Nzela ya Kuruze" ya sika, mosála ya Manuel Dürr

"Káti ya bileko ya molimo bibongisami, tokofungola na 20 ya sánzá ya mibalé Nzela ya Kuruze ya sika, o ntéi ya basilique, mosála ya elenge ya Suisse Manuel Dürr", elobaki episkopo ya lokúmu Gambetti.

Ekozala na bileko bibonzami mpo ya kotatola bozali ya Petelo mpe Polo na Roma.

Application yoko na nkóta 60 mpo ya bososoli ya milulu mpe nsámbo ya misa

Lisusu, ekobaki episkopo ya lokúmu, na lisungi y'application yoko mpo ya téléphone ya loboko, esálemi elongo na dicastère mpo ya Boyebisi mpe Kompani Translated, "tokokoka kopesa na bandimi ya mobémbo mwa boyambi milulu mpe nsámbo ya misa, ba nzembo mpe botángi bibongolami mbala mókó na nkóta 60”.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

17 sánzá ya míbalé 2026, 18:12