Ngwendé ya Sántu-Petelo ekozala te na "Likita lya boboto" mpo ya Gaza
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Nzokándé Donald Trump alengeli mokolo ya minei 19 ya sánzá ya mibalé na Washington liyangani ya yambo ya "Likita lya boboto (Conseildepaix)", lisangá ya bikóló etikali ya kokabwana na nini eloko ena ekoluka ya sóló, ekanisami mpe ekambemi na mokónzi y'Amerika mpe ekanisama na ebándeli mpo ya koyángela botóngi ya Gaza. Likita ena ekoluka ya yambo: eye ya kokitanisa ONU, ezaleli yoko endimami te Ngwendé ya Sántu-Petelo: "moko ya makanisi na bisó ezali 'te ezala ONU eye ekokamba motindo ya makámá maye", elimbolaki episkopo ya lokúmu Parolin na mpokwa ya 17 ya sánzá ya mibalé, na boyanoli na bapanzi nsango na nsuka ya molulu ya bokundoli mbótama ya Boyokani ya Latran. "Ezali yoko ya makambo eye tobetaki nsete", esémbolaki Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo úto ndáko ya ntoma ya Italie epái ya Vatican. Boboyi ena ekolimbolama "na botáli motindo na yangó eye ezali ya Bikóló bisusu te", elobaki episkopo ya lokúmu.
Botáli ya boboto boko ya seko mpe ya sóló
Na botóndi likanisi ya "komema eyano yoko", Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo atálisaki "makambo misusu miye bisengelaki kosila". Na káti ya sánzá ya mibalé, motomolo latin ya Yérusalem abombaki bobángi na ye te libosó ya likanisi nionso ya kobátela ba mbano ya bikóló ya makási na bondimi ya sóló te bato ya Palestine mpe makoki na bangó. Nzokándé, atáko bozimi-móto mókó etiamaki maboko na nsuka ya sánzá ya zómi 2025, likambo ya bato na Gaza etikali pási mpe mingi mpenza botáli boko te ya sóló ya boboto ya sóló mpe ya seko ekomonana. Engebene na ministeli ya bokolongono ya Gaza, koleka baí-Palestine 600 babomaki bangó na ba bombe ya Israël atáko botiyi maboko mpo ya bopémi (trêve).
Episkopo ya lokúmu Pizzaballa atóngoki (critiqué) mobéko ya bokoti ya milliard mókó ya dollar mpo ya kozala na Likita ena, etiamaki na mokónzi y'Amerika: "nazua mokolo mókó te milliard mókó ya dollar", elimbolaki motomolo latin, "ezali mpenza te mosála ya Eklezia eye ezali ya kolaka ba sakraménto mpe ya kobátela lokúmu ya moto".
Kotála lisusu ndimbola ya maloba
Na lisoló lyokó na lokasa ya mokolo na mokolo katoliko Avvenire, motomolo latin ya Yérusalem alobaki lisusu 'te "ekozalaka te hôtel ya monéne ya kitoko koleka na Gaza", na botáli ba mwángo y'Amerika ya kolinga koyema lisusu etuka ya Palestine, mpe alobaki bozangi makoki ya kokanisa lobi lyoko ya botóngi lisusu na kozua te pási, ba mpósá mpe lokúmu ya milio mibalé ya baí-Palestine bakobika kúna.
Nzoka bulamatari y'Amerika ematisaki bokónzi ya Likita lya boboto koleka Gaza mpe ekanisi úta sik’oyo lokóla lisangá lyoko ya bikóló ezui lotómo ya kolaka boboto ya mokili, Ngwendé ya Sántu-Petelo elobi lisusu bokangami na ye na mosála ya ONU mpe ya bikóló ebelé. Eloko elukami na bikóló ebelé, elobaki lisusu Léon XIV na ba ntoma o ebándeli ya mobú "ezali ya kopesa esika yoko bato bakoki kokutana mpe koloba", kasi esémbolaki Papá: "mpo ya kosolola, esengeli koyokana na maloba mpe makanisi bikolakisa". "Lokota ezali lisusu te na loléngé lyokó ya moto mpo ya koyéba mpe kokutana, kasi, na bokimi na mobúlú ya ndimbola, ekomi mingi mpenza mondoki mókó mpo ya kokosa to kobeta mpe kotúka bangúna ya lisano", elobaki lisusu Léon XIV. Bokébisi boko ya leló koleka ntángo tokosalela liloba ya "boboto".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.