Luka

Episkopo ya lokumu Pietro Parolin na Assise Episkopo ya lokumu Pietro Parolin na Assise 

Episkopo ya lokúmu Parolin abengi ya koyoka bogangi ya baye balingi mokili mókó ya sika

Na lisoló lyokó, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo akundoli 'te na «etando ya bobángi» ya eleko na bisó, «bilembo ya elikya» bizangi te. Ezali na bato baye balingi «lingómbá ya bato ya sika» esika wápi boyambi «ekopésa bisika ya koyéba ya soló, mpenza na likambo-likonzi ya bondeko», emoni ye.

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Na mokili mókó ya makambo ebelé, etungisami na makámá mpe bitumba, epái wápi baye bazali koyókisa bogangi na bangó bazangi te, mpe epái wápi boyambi ekobunda na lisengínyá ya pété ya komiyóka ozingami kaka na bangúna, likoló ya bolingo etéyamaka na Yézu oyo «akoluka kotónga bosóló bokó ya boboto», bilembo ya «nsoni» ya elikya bitelemi kaka.

Waná ezali likanisi ya episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, oyo alobaki o eleko ya lisoló azuaki na ndeko Giulio Cesareo, mokambi ya Buro ya boyébisi ya Sacro Convento, couvent ya Assise. Na 15 ya sánzá ya misáto, episkopo ya lokúmu akambaka misa mókó na basilique ya likoló, o eleko ya bolakisi ya mbalakaka bitika ya sántu François mpo ya bokundoli mibú 800 ya liwa na ye.

Elikya ezali mpo ya baye babungisaka elikya te

Secrétaire ya Letá alakisi «etando yókó ya mawa» na botáli eye ekoleka na biteni bikeseni ya mokili. «Soki totali pembeni na bisó, elobi ye, tozali bansó mpenza kotungisama na eye ekoleka». «Kasi bilembo ya elikya bizali mpenza epái ya bato, elobi episkopo ya lokúmu Parolin, baye bakobungisa, bandimaka na kimia te bosóló ená mpe bakoloba 'te mokili mókó ya sika ekoki kosálema, 'te lingómbá ya bato ya sika ekoki kosálema, 'te loléngé ya sika ya kobika mpe ya kokotisa boyokani ekoki kosálema».

Boyambi na bolingo

Nzelá yókó ya sika eye ebotami na «ntina yókó enéne ya elikya», ebakisaki Secrétaire ya Letá, «boyambi na bisó» eye «ekopésa ya sóló ba bokambi, mingimingi na likambo-likonzi ya bondeko». «Libosó ya mokili mókó ekabwani lokolá ya bisó, epái wápi tokoki kozua likámá ya komiyoka ozingami kaka na banguna», -endimi episkopo ya lokúmu- liloba eye François akopésa bisó leló, oyo azongeli eye ya Yézu, ezali ya kolinga moto nonso, kolinga atá bangúna na yo. Ezali kaka na bolingo ená ndé tokoki kotóka elikya: bolingo bokó eye ekosálema mobimba mpo ya bansó mpe ekoluka kotónga bosóló bokó ya boboto».

Bogangi bokó eye ekobongwama na ekela ya politiki

Mpo ya episkopo ya lokúmu Parolin, bakambi ya mokili eye basengelaki te kokanga matoyi na «bogangi bobóyi» ya baye babóyi kopésa na botikali kimia libosó ya eye ekoleka na mokili. Ekozala na ntina, esemboli ye, 'te bogangi ená ebongwama «na ekela yókó ya politiki», kasi, abakisi 'te bakambi ya mokili eye «bazali na boyoki mpe bokébi te na bogangi ekoúta na nsé». Likambo ya komesana «na ndéngé yókó ya kobika mpe ya kosála boyokani na bato ezua elembo ya mobúlú mpe ya bonyókoli te» ekopésa elikya mpe botiyi motéma. «Ezali elikya ená eye ekoúta na Nsango-Ndamu», elobi episkopo ya lokúmu.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

05 sánzá ya mínei 2026, 13:13