Papá aluboli mokambi ya botáli basáli ya Ngwendé ya Sántu-Petelo
Vatican News
Papá alubolaki mokolo ya yambo Paola Fanelli na ebóngá ya mokambi ya botáli basáli ya Ngwendé ya Sántu-Petelo o ntéi ya Secrétariat mpo ya Nkita, elobi lokasa lya Ndáko ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, eye esemboli 'te laíki ya mwási ya Italie azali na nzebi yókó ekási na likambo ya ba mbongwana ya masangá, esangani na mosála mókó molayi na etéyelo ya likoló.
Azua lipolome na 1989 na etéyelo ya likoló Bocconi ya Milan, na bolukiluki loléngé ya kosála, atalaka epái ya Accenture mosála ya mbongwana ya lisangá mpe ya bobongoli ya loléngé ya botáli makambo ya basáli na bisika bikeseni. Paola Fanelli azali na nzebi yókó na mosála ya bobombi mosolo; akambaka, lokolá mokambi ya linaka epái ya Mediocredito Centrale, bosangisi káti ya Banca di Sicilia mpe Sicilcassa.
Na 1999, akomaka mokambi monéne molandi ya Cassa di Risparmio di Pescara, esika wápi akambaka eténi ya bokeli etáli ba loléngé, makoki mpe mitindo ya nsango. Na sima, na 2001, akendaka na etuluku BNL BNP Paribas, epái wápi azalaka na bibóngá ya ntina na botáli basáli, boyébisi mpe mokumba ya bato na kompani.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.