Episkopo ya lokúmu Parolin: lisangá ya bikóló ya Poto esengeli kozala «bokási bokó ya bokeli» mpo ya boboto
JR Bompolonga – Kinshasa
Na mokili mókó eye ekotála bomáti ya bitumba, esika wápi boboto ezali na likámá bisika biyike mpe lokolá ebébisani na Poto na etumba ya Ukraine, Lisangá ya bikóló ya Poto esengeli kozala molobeli ya «bokási ená ya bokeli» ya boyókani elobama na mókó batatá bakeli, Robert Schuman, oyo nzelá ya bokomisi ye mwáesengo ezali kosálema. Waná ezali eye episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá, Pietro Parolin, alobaki o eleko ya bozui liloba na molúlú ya bopesi ya Molongó ya Litómbá ya Poto, eye esálemaki na 19 ya sánzá ya mitáno, na libakú ya likita mpo ya bansó ya Parlement ya Poto esanganaki na Strasbourg. Bokeseni ená, ya yambo ya loléngé ená epesami na mosála mókó ya Lisangá ya Poto, ekopesa Litómbá na bato baye basálisi na ndéngé ya ntina na bokotisi (intégration) mpe bomókó ya Poto.
Basáli ya boboto, elongo
Episkopo ya lokúmu, na bopési na likita nionso bambote ya Papá Léon XIV, alobaki 'te boyókani káti na bato etikali «elaka yókó ya ntina» ya Lisangá ya Poto mpe «bomipesi bokó na mokili ya polélé» ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, lokolá ye mókó Papá wa Roma alobaka yangó mbala ebelé. Ntina ya «bovandi ená ya bacivil», ebakisaki ye, bizali makambo ya malonga biye bikozua misisa na bangó na lisapo ya bokristu mpe batatá bakeli bamisála banzeneneke bikoloba. «Káti na maye ezali ya yambo bobimisi ya lokúmu ya moto, eye ekobébisama te mpe esengeli kaka kobátelama na eténi yókó yókó ya bomoí». Episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá asúkisaki liloba na ye na bozongeli bobongami ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ya kosálisana na misála ya Poto mpo ya kozala «elongo basáli ya boboto».
Ebándela ya bokeseni
Káti ya balongi ntúkú mibalé ya bokeseni boná bizali, na bolongoli Parolin, Angela Merkel, mokónzi ya kála y'Allemagne, Lech Wałęsa, mokónzi ya kála ya Pologne, mpe Aníbal Cavaco Silva, oyo akambaka mpe azalaka Ministre wa yambo ya ekóló Portugal. Litómbá, lokolá ekoki kotángama esika ya internet ya Lisangá ya bikóló ya Poto o eleko ya mibú 75 ya nsakola Schuman, oyo abimisaka likanisi ya bokeli Lisangá ya Poto ya makála mpe ya libendé ekási, mokókóli ya yambo ya nzelá ya bokotisi eye ememaka na Lisangá ya bikóló ya Poto (UE) ya leló.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.