Bato ya Lefebvre babenganami na Eklezia katoliko sima ya bokomisi basángó baepiskopo
Vatican News
Baepiskopo ya Bondeko ya bonganga-Nzámbe Sántu-Pie X Alfonso de Galarreta mpe Bernard Fellay (na molongó mokónzi ya yambo mpe mokónzi ya mibalé ya bokomisi basángó baepiskopo) na lokolá baye bakómaki baepiskopo sika Pascal Schreiber, Michael Goldade, Michel Poinsinet de Sivry mpe Marc Hanappier bazuaki «ipso facto» bobengani «latae sententiae» ebongisama na Ngwendé ya bontómá mpo ya kosála «ekela yokó ya bokabwani», ezali bôngó «bokomisi episkopo banganga-Nzámbe minei, na bozui lotómo ya Papá te mpe na loléngé Papá wa Roma alingi te». Waná ezali eye tokoki kotánga na mokáno etiamaki lobóko na episkopo ya lokúmu Víctor Manuel Fernández, préfet ya dicastère mpo ya Litéya ya boyambi, mpe etiami lokolá mabóko na basecrétaire mibalé ya dicastère ená kaka. Waná ezali bosúkisi, eyebanaki na mawa, eye esalemi ngonga 24 sima ya molúlú ya ntina esálemaki na Écône, na Suisse, na ntongo ya mokolo ya yambo ya sánzá ya sambo 2026.
Mokáno ya Misa-Esántu (Saint-Office) ya kála elobi 'te, na likambo kaka ya bosálisi bokomisi basángó baepiskopo, baye bakómisaki na baye bakómaki bazui etumbu ya bobengani ebongisama. Waná ezali súka ya lisoló na pási, litómba ya mokáno ezuamaki na bato ya Lefebvre na boboyi mpósá elobamaki mbala ebelé na Léon XIV. Bobengani ememi bokabwani na Eklezia ya Roma na lokolá baepiskopo mpe basángó ya Bondeko ya bonganga-Nzámbe Sántu-Pie X (Fraternité sacerdotale Saint-Pie X). Mpo ya bandimi laíki, batángami lokolá babenganami baye bakoti ya sóló na Bondeko. Makambo misusu ebelé bizali na «Lokásá lyokó ya bolimboli», dicastère abimisaki yangó nzelá mókó na mokáno ya bobengani, eye tokobimisa mobimba áwa na nsé.
Likomi ya dicastère
Úta eleko ya sántu Polo VI kinó masoló ya súka maye masálemi kála te o ntéi ya dicastère ená, babokútani ebelé ya kozongisa bato bayingeli na lingomba ekelama na Mgr Marcel Lefebvre na bosangani mobimba na Eklezia katoliko bizalaki ntina te. Ezaleli ená ekómaki lisusu makási likoló ya bokomisi episkopo basángó esálemaki na lotómo ya Papá te, na boboyi ya Tatá-Esántu, na bobuki mpenza mobéko ya Eklezia. Mpo na waná, dicastère ená, na bosáli makoki maye bapesa ye, amoni esengeli koloba 'te ekela ená ezalaki mbéba ya bokabwani, na matómba ya mobéko ya Eklezia biye bikoya mpo ya baye bakómaki banganga-Nzámbe mpe bandimi laíki bazalaki waná. Na yangó, lokolá esakolamaka na 1988, «bozangi botosi ená, eye ezali na yangó mókó boboyi bokó ya sóló ya bokónzi ya libosó ya episkopo ya Roma, ezali ekela yokó ya bokabwani» (cf. Yoane-Polo Il, Mokánda ya bontómá Eklezia ya Nzámbe, 3)
Na waná, kobánda sik’oyo:
1. Basángó bakula baye bazali na Bondeko ya bonganga-Nzámbe Sántu-Pie X bazali na bokabwani mpe bakoki kozuama lokolá bakabwani.
2. Na eye etáli bandimi laíki, bakoki kozuama lokolá bakabwani mpe babenganami baye bayingeli ya sóló na Bondeko ya bonganga-Nzámbe Sántu-Pie X na loléngé ebongisama na Lokásá ya bolimboli ya Mosála ya Papá mpo ya mikánda ya bozui mibéko ya 1996, ezali kaka kosála, eye dicastère ená ekómisi yangó ya ye.
3. Na súka, Bato basántu ya Nzámbe bakébisami 'te baepiskopo ya Bondeko ya bonganga-Nzámbe Sántu-Pie X bazali kopesa na bobuki mobéko basakraménto mpe sakraménto ya boyokeli mawa bakopesa na lokola libala bakosála bizali na ntina te.
Eklezia, lokolá mamá mókó ya bokébi, akoyamba na esengo yókó ya sóló mpe bobáteli bokó ya makási baye bansó bakolinga kozonga na bosangani mobimba. Bantómá ya Papá bakobongisa bandéngé biye baepiskopo bakónzi bakoki kosálela engebene na loléngé makambo bikeseni.
Na súka, bandimi bansó balendisami ya kozala na moléndé na bosangani na Papá wa Roma, na baepiskopo na bosangani na ye mpe na Eklezia mobimba, mpe koboya kozala na bamisa mpe milúlú bisálemi na Bondeko ya bonganga-Nzámbe Sántu-Pie X elobamaki likoló.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye