Luka

2026.07.06 Na mobémbo na ye na Nigeria (foto © TerzaLoggia - X) 2026.07.06 Na mobémbo na ye na Nigeria (foto © TerzaLoggia - X)  (foto © TerzaLoggia - X)

Mgr Gallagher asilisi mobémbo mókó na Nigeria

Secrétaire ya Boyókani na Bikóló mpe ya Boyókani na mokili azali sik’oyo na ekóló ená y'Afrika mpo ya kosepela mibú 50 ya boyókani na Ngwendé ya Sántu-Petelo. Asololaki na mokónzi ya ekóló Tinubu.

Vatican News

Mobémbo na Nigeria ya Mgr Paul Richard Gallagher, secrétaire mpo ya Boyókani na Bikóló mpe Masangá ya mokili, ekosila leló mokolo ya mibalé 7 ya sánzá ya sambo. Episkopo akendeki na ekóló ená y'Afrika na 2 ya sánzá ya sambo eleki o eleko ya bosepeli mibú 50 ya boyókani káti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe ekóló ya Nigeria, eye ezali na bakatoliko koleka milio 30, koleka basángó katoliko 10 000, mpe esika wápi mikakatano na eye etáli bobáteli ya káti ya bato bizali bébóo.

O eleko ya mobémbo ená  - lokolá ekomami na compte officiel X ya Secrétariat ya Letá -, Mgr Gallagher akutanaki na mokónzi Bola Ahmed Tinubu na Ndáko ya bokónzi. Bazalaki waná lokolá Bianca Odumegwu Ojukwu, ministre ya Makambo ya bapaya, mpe Omar Louray, mokónzi ya Komisyo ya CEDEAO. Na súka ya lisoló na ye na motindami ya Vatican, mokónzi Tinubu asakolaki na bamédia ya ekóló na ye o eleko ya bokútáni ená bomipesi ya bulamatari ya kopesa na esika ya libosó bosololi káti ya biyamba mpe kotombola boboto, boyókani mpe bozali motéma molayi káti ya masangá ya biyamba bikeseni.

Na linaka ya mobémbo ya secrétaire atálaka Boyókani na Bikóló ezalaki lokolá bosáli misa eye elekaki mokolo ya eyenga na ntongo na cathédrale Notre-Dame-Reine-du-Nigéria ya Garki (Abuja), elembo ya botondi mibú 50 ya boyókani káti ya Bikóló mibalé.

O eleko ya mobémbo na ye na Nigeria
O eleko ya mobémbo na ye na Nigeria   (foto © TerzaLoggia - X)

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

07 sánzá ya nsambo 2026, 11:11