«Na bobotoli mindoki te, botomboli ya moto ekoki kozala te»
JR Bompolonga – Kinshasa
Boyókani ya mindóki ya masasi mike ekoki kosúnga na bosáli ya «boboto bokó ezanga mondoki mpe ekobotola mondoki, ya bomikitisi mpe ya bompikiliki», lokolá alingaka yangó Papá Léon XIV, mpenza na bondimi botáli bokó etiyi moto na káti, «na bopesi lisálisi lyokó na baye batutani mpe na bondimi bapási na bangó». Ezali bongo ndé Mgr Ettore Balestrero, ntómá ya Papá mpe motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU mpe masangá ya mokili na Genève, alobaki mokolo ya yambo ya sánzá ya sambo, bomipesi ya motindami ya Vatican na etumba libosó ya bosáleli mindóki miná ya etumba ya kopanzana.
Mindóki biye bisáli bato ya makámá bayébi likambo te
Na nsakola na ye, Mgr Balestrero akumisaki bomipesi ya ekipi ya Laos na bobongisi Liyangani ya mbala ya misáto ya botáli ya Boyókani ya mindóki ya masasi mike. Alobaki lisusu 'te loléngé ya mindóki ená ekotuta kaka basoda te, kasi mingimingi bacivil mpe bána. «Na botiyi moto o káti», elobaki motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU na Genève, «Boyókani ená ekolakisa molimo ya sóló ya moto ya bokengeli mpe bobáteli bampósá ya bato balemba makási mpe baye bakoyóka pási na mabé ya bitumba».
Bobotoli mondoki, ezaleli ya yambo na botomboli moto mobimba
Kozongisa mindóki waná bibetaka te ezali bôngó ezaleli ya yambo ya kotika pembeni te mpo ya kosálisa botomboli bokó ya nkita mpe ya moto mobimba, na káti waná bato balemba makási.
«Yangó ekolakisa nsinga ekoki kokabwana te -ekobaki episkopo - káti ya bobotoli mondoki mpe botomboli ya moto mobimba. Na ndéngé waná, Ngwendé ya Sántu-Petelo elingi komatisa bosáleli ya Boyókani, na botikali na lobokó na molimo eye epesaki likanisi ya bokomi yangó».
Mgr Balestrero alobaki lokolá 'te «Bikóló mingi biténi mpe Bikóló biténi te ya Boyókani babosani eloko te ya libulá ya bobomi ya mindóki ya masasi mike eye ekokoba kosála bato ya makámá bayébi likambo te». Ebongisaki bôngó 'te «libótá ya bikóló» ekomona «lisálisi na bato ya makámá» lokolá «mokúmbá mókó ekabolami», etáli mpenza bampósá.
Kolongola kwokoso nionso na bokoti bokó ya monéne koleka
Na súka, motindami ya Ngwendé ya Sántu-Petelo abimisaki «na bobángi» 'te mokánda ezalaki nanu na nkomá masusu «biye tolobaki ntángo insó botelemeli ya bisó». Ezali maloba lokolá «loléngé ya mibáli mpe bási mpe bokeseni», «botáleli ya loléngé ya mibáli mpe ya bási» mpe «bokotisi na loléngé ya mibáli mpe ya bási». Bokotisi na mokánda ya boyókani ya «makambo ya kotálela» waná - «biye bikotuna lokolá likambo epái ya bikóló ebelé ya biténi» - ekokoka, elobaki Mgr Balestrero, «kozala mokakatano mókó lisusu na botiyi mokoloto na bangó to na bokoti na bangó, na bambano mpo bopanzi na mokili mobimba Boyókani».
Nini waná mindóki ya masasi mike?
Boyókani ya mindóki ya masasi mike ezali boyókani ya mokili mobimba endimama na 2008 na Dublin mpe etiama mokoloto na 3 ya sánzá ya zómi na mibalé 2008 na Oslo. Ekota na bosáleli na 1 ya sánzá ya mwambi 2010 mpo ya kolongola bosáleli ya loléngé lyokó ya mondoki eye ekomema bambano ya mabé makási mpo ya bato, mpenza mpo ya bacivil. Mindóki ya masasi mike bikoki kozala babombe, baroquette to biloko bisusu ya kobwaka biye, mbala mókó bibwakami, bifungwami na likoló mpe bipanzani nzinganzinga na bangó na zómi, tángo mosusu nkama ya masasi mike na etando yokó molayi koleka. Bikoki na pété kotuta bacivil, mpo eténi yokó ya masasi mike ekopanzana esika ekómi te, kasi ekotikala na mabelé lokolá mine mókó, na bokobi koboma to kozokisa atá mibú ebelé sima ya bitumba.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye