Ngwendé ya Sántu-Petelo: kopekisa lisálisi na Gaza ezali bobuki bokó mabé ya mobéko ya bomoto
JR Bompolonga – Kinshasa
Kopekisa bokaboli ya lisálisi na babombani ya Palestine na Proche-Orient ezali «bobuki bokó ya mabé ya mobéko ya mokili mpo ya bato» mpe «ebakisi pási ya baye bakobika kála na ndéngé mókó ya mabé». Ezali eye elobaki lisusu na 30 ya sánzá ya motóbá, Etindá ya eleko insó ya botáli ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU na New York, na nsakola yokó etangamaki o eleko ya likita lyokó ya Komisyo ebongama ya Lisangá linéne.
Úta koleka mibú 70, lisálisi lyokó ebongi mpo ya baí-Palestine
Na nsakola na ye, etindá ya Vatican elobaki ntina ya Mosála ya bosúngi mpe ya misála ya ONU mpo ya babombani ya Palestine na Proche-Orient (UNRWA), na bolobi 'te ekela na ye ezali «lisúngi ya ntina mpo ya milio ya bobombani ya Palestine». Úta koleka mibú 70, lokolá elobi nsakola, Ndáko ya mosála ya ONU «ekopesa bangó botéi bokó, lisálisi ya bokólóngóno, lisálisi ya biléi mpe ya misála mpo ya bato, na bolaki bangó bobáteli, lisálisi mpe likoki ya kobika na lokúmu». Esalelo ená ekelamaka na 1949 na Lisangá linéne ya ONU na botáli mokáno nº302 (IV), na sima ya etumba ya bato ya baí-Israël na baí-Arabe ya 1948, zambi ya kosálisa baí-Palestine bakómaki babombani.
Etindá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU elobaki lokolá «botungisami na ye bonéne» libosó ya «bobomi ya binama ya UNRWA», na lokolá na «mobúlú libosó ya bandáko na lopango ya ONU na mabelé ya Palestine, na káti waná bitéyelo mpe bisáleli misusu esika wápi bacivil babombana».
Bomipesi na kopesa mosolo ya Ngwendé ya Sántu-Petelo
Na bondimi loléngé ya lisálisi epesami na UNRWA, Ngwendé ya Sántu-Petelo andimaki «bomipesi na ye ya kopesa mosolo mpo ya UNRWA, lokolá liloba ya sóló ya bosálisani epái ya babombani ya Palestine mpe botiyi motéma na etindá na ye mpo ya bato». Na súka, mpósá elobamaki 'te mosála ya UNRWA esálema kaka na «botosi ya makási» «ya mibéko ya bomoto, bozangi kopona ngambo ngambo mpe bonsómi» zambi ya «kobátela bondimi ya UNRWA mpe ya kolaka likoki ya kokokisa lotómo na ye lokolá esálelo ya malámu ya bosálisani mpe ya boboto»
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye