Episkopo ya lokúmu Parolin asengi kokangama na Nzámbe lokolá Agathe
JR Bompolonga – Kinshasa
Bokási ya sántu Agathe ekowuta na «lisangá na ye na Kristu». Yangó waná amitikaka kobukana te na mobúlú, makaneli mpe bilaka ya mpifo. Yangó ndé elobaki episkopo ya lokúmu Pietro Parolin o eleko ya libondeli ya mpokwa eye akambaki na 16 ya sánzá ya mwambi, na Aci Castello, na Sicile, mpo ya kokanisa bozongi ya bitika ya martyro ya Catane, esálemaka eleki mibú 900.
Bitika ya liwa ya mosántu - babomaka ye na káti ya monyoko ntángo azalaki naínu elengé na ekeke ya misáto, mpo ya aboyaka kowangana boyambi na ye o eleko ya minyoko ya Autriche bibándaka na mokónzi ya Roma Dèce - Babyzantin bamemaka yangó na Constantinople na ekeke ya zómi na mókó, o eleko ya mosála mókó libosó ya Basarrazin. Mibú ntúkú mwambi na motóbá sima, bazongisaka yangó na Sicile. Bikitaka na Aci Castello sima ya bopemi bokó ya moke na Pouilles, bitika bikumbamaka na molongó na Catane na 17 ya sánzá ya mwambi 1126.
Ndakisa yokó na lobokó na Kristu
Episkopo ya lokúmu Parolin, azalaki mokolo ya eyenga mpe mokolo ya yambo na etuka ya Etna lokolá motindami ya Papá mpo ya bokanisi ekeke ya libwa ya molúlú, alubolamaki na Léon XIV na mokánda mókó ya 29 ya sánzá ya motóbá, alobaki na litéya na ye 'te «sima ya bikeke ebelé, litatoli y'Agathe ekokoba koloba na Eklezia», eye ekokanisa na ye «Mbuma ya bomoí eye atikalaka lisangá na Nzambe». Mpo «oyo akokangama na Mokónzi akoki koleka atá bitumba ya makási na kobwaka elikya te mpe akoki kobóta mbuma». Papá ye mókó, na mokánda atindelaki episkopo ya lokúmu, alobaki 'te «na martyro ya mosántu Agathe, ndakisa ya ntina ya lobokó na Kristu mpe ya bolingo kinó likabo nionso ya ye, lisangá ya Eklezia ekotála elonga ya ngolu na mobúlú, ya boyambi na bobángi mpe ya bolingi na liwa».
Boyambi elongolaka mikakatano te, kasi epesaka makási
Na bozui likanisi na Nzembo 1, esákolamaki o eleko ya libondeli ya butu, episkopo ya lokúmu awumelaki na molongó ya 6 - «Mokónzi akengelaka nzelá ya bato ya sémba» - asembolaki 'te moto ya sémba «alongolamaka na pási te», lokolá lisapo y'Agathe ekolakisa. «Boyambi elongolaka mikakatano te, kasi ekomema bozali bokó mpe bokási bokó ya sika mpo ya koleka yangó», esembolaki episkopo ya lokúmu. «Mokónzi ayébi nzelá ya bána na ye, akokende elongo na matambé na bangó mpe akobongola kútu bampota na bisika ya ngolu».
Liloba ya Nzambe, nzelá eye ekomema na bonsómi
Lisusu, na bolimboli Nzembo 1, episkopo ya lokúmu alimbolaki 'te etumba yokó «ekoleka bomoí ya mókó mókó: ngambo yokó, mongongo ya Nzámbe, eye ekomema na bomoí; ngambo esusu, mingongo mingi biye bikoki kotinda yo mosika na Ye». Bizali «mabé» eye «emimonisaka mingimingi na bikela ya kokamwa te, kasi na matambé ya mike», «mimeseno miye bibongolaka malémbe malémbe motéma». Ezali bongo ndé «okomesana kobika na Nzámbe te». Oyo, nzokándé, «akozua esengo na ye na mobéko ya Mokónzi» azali «moto oyo ayébi esika nini kozua bomoí na ye», ezali «moto ya sémba». Mpo na ye, «Liloba ya Nzambe ezali eloko ya kilo te, kasi liziba lyokó; ezali ndelo yokó te na bonsómi, kasi nzelá eye ekomema na bonsómi ya sóló», mpo na bomanyoli yangó, «Nkomá ekómaka talatala esika nini toyébaka bomoí na bisó mpe mongongo mókó» eye ekotuna bisó.
Kokangana na Nzámbe lokolá sántu Agathe
Moto ya sémba akokokisama, na Nzembo 1, na «nzete yokó elonami pembeni na ebale», elakisaki episkopo ya lokúmu Parolin, mpe akopesa mbuma «mpo azali na misisa ya bozindo» biye «bikokóma na liziba lyokó»; na eye, «akozua makási na ye» mpe yangó waná, libosó ya mokakatano, «atikali na bomoí». Sántu Agathe azali ndakisa ya «bomoí bokó ekangama» na Nzámbe, eye «ebébaka te, kasi ekokoba ntángo insó kopesa bambuma ya elikya». Epái wápi, na súka, bobiangi ya episkopo ya lokúmu ya «kotikala ngbi na Mokónzi», ya kosenga na Nzámbe «kosála bisó babáli mpe bási ya misisa ya bozindo, bikoki komitika komema na mopepe ya babobángi te, ya bilateli te mpe ya lokutá te, kasi ya kozua na Liloba na ye liziba ya bomoí».
Misa ya Papá
Bitika ya mosántu Agathe, bikómaki na sima ya nzanga na Aci Castello mpe bitandami na esika Castello, bizuaki limemía kinó mokolo ya yambo 17 ya sánzá ya mwambi na ntongo na ndáko-Nzámbe mamá, yambo ya kozonga na Catane. Kúna, na ngonga ya 20, bikotiama na esika ya Dôme mpo ya misa ya Papá ekokambema na episkopo ya lokúmu Parolin, na bozali ya baepiskopo ya Sicile, ya episkopo ya Otrante mpe episkopo ya Nardò-Gallipoli, na badioceze biye momeseno elingi 'te bitika ya mosántu bileka, na lokolá eye ya dioceze ya Sántu-Marin-Montefeltro, eye azali na mosántu mobáteli elongo na Agathe.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye