Luka

2019.05.21 Mgr. Gallagher na sanza ya mitano 2019 2019.05.21 Mgr. Gallagher na sanza ya mitano 2019 

Gallagher na Moscou: mosála ya boyókani mpe lisoló na elembo ya boboto

Secrétaire mpo ya Boyókani na Bikóló mpe masangá ya mokili azali na mobémbo na mboka-mokónzi ya Russie úto 24 kinó 28 ya sánzá ya mwambi.

JR Bompolonga – Kinshasa

Mobémbo na mboka-mokónzi ya Russie ya secrétaire mpo ya Boyókani na Bikóló mpe masangá ya mokili, Mgr Paul Richard Gallagher, ekosálema úto 24 kinó 28 ya sánzá ya mwambi. Na eleko ya etindá ená na Moscou, babokútani bibongisami na bakambi ya ekóló Russie, batindami ya Patriarcat ya Moscou mpe lisangá katoliko. Bikozala bôngó mikolo mineí ya masoló mpe ya babokútani mingi, na káti waná lomeko mpenza ya mosála ya boyókani ya mobémbo ekobakisama na lomeko ya Eklezia, na babokútani na baepiskopo mpe lisangá katoliko ya Russie. Etindá ená ya ntina ekozala lokolá lomeko ya biyamba, mpenza na nzelá ya bokútáni na batindami ya Patriarcat ya Moscou.

Linaka lyokó eye endimisi mpósá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ya kokoba nzelá ya lisoló, atá na eleko yokó ya makási koleka na misála ya boyókani na mokili.

Ezali mbala ya yambo te Mgr Gallagher akende na mboka-mokónzi ya Russie. Mobémbo na ye ya súka ezalaki na sánzá ya zómi na mókó 2021. Na libakú liná, akútanaka na Ministre wa Yambo Mikhaïl Michoustine, ministre ya Makambo ya bapaya Sergueï Lavrov mpe métropolite Hilarion Alfeev, na ntángo ená mokambi ya eténi ya Makambo ya baeklezia ya libandá ya Patriarcat ya Moscou.

Úta 2022, eténi ya makambo ya baeklezia ya libandá ya Patriarcat ekambemi na métropolite Antonij Sevriuk, oyo akitanaki na métropolite Hilarion.

Longola babokútani ya misála ya boyókani, mobémbo moye ekopesa na Mgr Gallagher libakú ya kokútana na lisangá katoliko ya Moscou. Secrétaire mpo ya Boyókani na Bikóló akosolóla na baepiskopo mpe batindami ya lisangá ya esika waná; akokamba misa mókó mpe akokútana na lingómbá ya basángó mpe basáli ya Nzámbe ya babáli mpe bási.

Eklezia katoliko na Russie ezali motángo ya bato moke mpe ekabwani na ndéngé ya géographie na etando yokó enéne koleka. Bobongisi na yangó ya etando ená ezali na dioceze ya Mamá ya Nzámbe na Moscou mpe badioceze ya Sántu-Clément na Saratov, ya Bobongwami na Novossibirsk mpe ya Sántu-Yosefu na Irkoutsk.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

22 sánzá ya mwambe 2026, 13:40