Luka

Mgr Filippo Iannone Mgr Filippo Iannone 

Mgr Iannone, canoniste, elongi ya Curie, akokamba dicastère po ya ba Episkopo

Ezali liponami ya yambo ya Papá po ya bokambi dicastère mókó ya Curie ya Roma. Ezelamaki mingi po etali bokitani ya ye mei Léon XIV libosó ya boluboli na ye. Papá wa Roma aponaki mokolo ya mitáno 26 ya sánzá ya libwá préfet ya sika na dicastère po ya ba Episkopo. Ezali episkopo mókó ya Italie ayebani malamu na Curie ya Roma, Mgr Filippo Iannone, kinó sik'oyo préfet ya dicastère po ya Textes législatifs. Akokamata mosala na ye na 15 ya sánzá ya zómi.

Jean René Bompolonga – Kinshasa

Mgr Filippo Iannone azali na makambo mingi mikokani na Léon XIV. Episkopo ya Italie ya mibú 67 azali ya génération ya Papá. Lokóla ye, azali mosáli ya Nzámbe ya lisangá ya ba Carmes. Lokóla ye, azali canoniste. Azalaki koleka mibú misáto préfet ya dicastere po ya ba Textes législatifs, eye mosála ezali ya kobongisa mokolo na mokolo mokaná ya ba code mibále, latin pe oriental, motéma ya bosáli mibéko ya Eklezia. Bakozala kobánda sik’oyo na lisangá na mosála ‘te bakambaki dicastère ya boponi baepiskopo ya sika.

Moto ya mobéko pe canoniste

Filippo Iannone, abótami na Naples na 13 ya sánzá ya zómi na mibále 1957, ayekolaki théologie na Campanie pe droits canon pe civil, In utroque iure, na université ya Papá ya Latran. Simá ya formation na tribunal ya Rote ya Roma, mókó ya bisaleli ya bosémbo ya Curie, azui titre y'avocat ya Rote. Misála na ye na dioceze ya Naples bisali ‘te azalaka kaka na mokili ya makambo ya bosémbo na bisika bikeseni.

Atelemi po ya bobongisi Curie

Mgr Iannone akómi na Roma na 2012 lokóla mokambi- molandi ya dioceze ya Papá. Simá ya mibú mitáno, Papá François amóni ye pe atie ye na eye ezalaki conseil ya Papá po ya ba Textes législatifs epai wapi aponamaki mokonzi mobú mókó simá ya bokomi na ye. Elama ya ba dicastère mitáno, Mgr Iannone asali mingi na episkopo ya lokúmu Robert Francis Prevost, elongó na ye alandaki masoló ya synode na Eklezia ya Allemagne. Préfet ya sika ya dicastere po ya ba Episkopo akomóna lolengé mókó likambo ya synode na Léon XIV. Na sánzá ya misáto 2024, Mgr Iannone alobaki na Ndáko ya bopanzi nsango ya Vatican 'te Synode ezali "eloko moko ekobongola, ekobimisa, ekosangisa"; na bozali na "etinda moko" ya "kosakola Kristu na mokili".

Bozui mosala na 15 ya sánzá ya zómi

Ayambamaki na likita na Léon XIV na 30 ya sánzá ya mwambi elekaki, akozua mosála na ye na 15 ya sánzá ya zómi. Úto mokolo eye, akobánda kolakisa na Papá basángó ya kokótisa bangó na mosála ya baepiskopo. Pe ya kokamba commisio ya Papá po y'Amerique latine lokóla mosála ya préfet po ya ba Episkopo. Bandimami na misála na bangó ya secrétaire pe secrétaire-molandi ya dicastère po ya ba Eîskopo po ya mibú mitáno, Mgr Ilson de Jesus Montanari ya Brésil pe Mgr Ivan Kovač ya Bosnie.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

28 sánzá ya libwa 2025, 11:52