Luka

Moto moko ya Israel mokolo ya bokanisi 7 ya sanza ya zomi na Tel-Aviv Moto moko ya Israel mokolo ya bokanisi 7 ya sanza ya zomi na Tel-Aviv  (SHIR TOREM)

Ba pótá ya 7 ya sánzá ya zómi mizali nanu polélé

Mibú mibále simá ya 7 ya sánzá ya zómi, bazui likámá pe bandeko na bangó bazoluka ndéngé nini kokende libosó. Koleka masoló ya politiki, kosála boboto na mitéma ezali pási sik’oyo. Esengeli na tángo, tángo ebelé po ya kosálisa ba pótá pe komeka kobika na kimia basongolo pembeni na bapakala.

Jean René Bompolonga – Kinshasa

Mongóngó ezali nanu ya kopasuka. Mibú mibále simá ya mobúlú ya Hamas na Israël pe liwa ya koleka bato 1 200, káti na bangó ba civil mingi, Ange Kalderon akokanisa. Moto ya France eye abúngisaki mokolo ya 7 ena ya sánzá ya zómi ndeko na ye ya mwási, Carmela, mibú 80, pe nkoko ya Carmela, Noïa, mibú 12, bakáti bangó mibále kingó na bato ya Hamas. Kaka mokolo waná, nókó na ye, Ofer Kalderon, mibú 53, pe bána na ye mibále, Sahar, mibú 16 pe Eretz, mibú 12, bamemaki bangó na makási. Batikalaki na maboko ya ba islamiste na Gaza ba sánzá ebelé. Bilenge mibále batikaka bangó na 27 ya sánzá ya zómi na mókó 2023, tatá na bangó akangemaka kinó sánzá ya yambo ya mobú eye. "Bato babika", lokóla Ange abengaka bangó, na bokanisi baye bazuaka likámá na Shoah, tángo bimaka na ba boloko ya ba nazis. "Bakoloba 'te nzóto na bangó ezali leló na Israël, kasi mutú na bangó pe molimo na bangó ezali mwa moke kúna", elobi ye.

Bozongi na Israël ezalaki pete te, mingi penza po ya bána baye bayébaki nini ekómelaki na nkoko na bangó pe ndeko na bangó ya mwási, 'te tatá na bangó azalaki nanu ya kokangama pe kibboutz esika bakólaka babébisaki yangó. Mobú mókó mobimba, oyo azali elenge na bangó koleka, Eretz, akendaki na etéyelo te pe úto waná, akoka kokutana na baningá na ye ya kelasi ya kála te. "Matánga ekoki nanu kosálema te", elimboli Ange Kalderon, na bolobi eleko ndéngé ezali, etumba ezali nanu pe bakangemi bazali nanu na Gaza. Komizongisa na loléngé ena ezuaka ngonga.

Boboto mókó ya pási

Bobúlungani mayéle ya 7 ya sánzá ya zómi ezali nanu, kaka epái ya bato bazuaka likámá te pe bandeko na bangó, kasi o ntei ya bato nionso ya Israël. Kosála kimia, eye ya mitéma, ya bato, ya eye ya bato ya makási te, ya boyokani ya politiki káti na bikóló, ekozua lokóla ngonga ebelé, emoni Ange Kalderon. Po na ye, ekoki kosálema soki batiki ba "islamiste" pembeni lokóla alingi kolimbola bilama ya Hamas, soki te ekozala "pási".

"Hamas ezali lisangá ya islam koleka lisangá ya bonsómi ya Palestine", elobi ye, na botiyi libosó makambo ya etumba na Fatah pe bowelani na Autorité palestinienne. "Ekoluka kaka bopalangisi islam, esengeli kobosana yangó te", ekobi ye. Kasi, ayoki mawa, Hamas akoka kokutanisa etumba na ye po ya islam na likambo ya Palestine, pe mingi penza na "likambo ya Gaza", eye ekokolisa antisémitisme, emoni ye. Nzókánde, "antisémitisme, ekofúngola nzelá ya antichristianisme".

Kolongola bato ya islam

Ange asepeli te na "bindimelá" ya bato ya Poto na likambo yangó, bosangani ya ndambo ya bato to ya ba parti politiki na Hamas, pe na botáli mosika ya Mabelé Esántu, mwa makelele ekozuama po ya bomoi ya bakristu ya Orient, na Syrie, na Irak, to na Liban.

Po na nionso, simá ya 7 ya sánzá ya zómi, bokútáni na ye ya kitoko koleka, ezalaki eye na bakristu pe na bango asáli bolingi ya makási. "Nayókaki 'te nasosolamaki kaka na bato waná", elobi ye, na boyóki mawa ya bozangi esengo epái ya ba musulman. "Po na bisó bayuda, nzelá kaka mókó, bolingi se mókó ekozela bisó, ezali epái ya bakristu". Ange akanisi lisusu mobémbo na ye na Vatican, bokútáni na ye mókó na Papá François.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

11 sánzá ya zómi 2025, 16:08