Luka

Mgr Rapahêl Traboulsi, vicaire général ya dioceze ya Chaldée na  Beyrouth Mgr Rapahêl Traboulsi, vicaire général ya dioceze ya Chaldée na Beyrouth 

Bitéyelo ya Liban na pási makási

Bitéyelo bina biye bikolakisa baí-Liban bizali leló na pási makási. Bikumbama na maboko na balakisi balingi mosála na bangó pe ba congrégation ya biyamba, bikobunda po ya kotangisa kaka. Botáli ya bitéyelo ya letá pe ya bato bangó mókó (privé) na Beyrouth.

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Na bolongoli ekelá ya losámbo, botéyi, na mosála ya bokólóngónó ya nzóto, bizali misála mibále ya ntina na Eklezia ya Liban, po ya biyamba binsó. Bitéyelo bikonyokwama na eleko eye ya mokakatano, ezala bitéyelo ya letá to ya bato bangó mókó. Na letá, makoki bikozanga po ya bobongisi bandáko, bosómbi bisáleli pe lifúta ya balakisi. Bangó baye bakozua na ministeli na bangó dollars 70 na sánzá, na likoló na yangó lisúngi ya bato ekomátisa lifúta ya sánzá na dollar 700. "Waná ekoki po ya kobika póso yoko", elobi Elias Helou, mokambi ya etéyelo ya letá ya Bikfaya na nzinganzinga ya Beyrouth. Etéyelo na ye ezalaka koyamba bána 200 libosó ya 2019, eleko endimama po ya kolimbola ebándeli ya mokakatano. Leló bána kelasi batikali kaka 86. Atá lisálisi na mosolo ya Unicef, makoki po ya bitéyelo ya letá bizali kokoka te. Na motindo ena pe botiki mosála tángo insó bitindá babóti baye bakoki kokomisa bána na bangó na bitéyelo ya bato ya bangó mókó. Mabótá misusu bakotisa bána na bangó na mosála, kobánda mibú 13 to 14. Bokabwani káti ya lifúta pe motúya ya bomoi esála 'te na libótá lyoko babóti bazali mingimingi na misála mibále pe bazali na eloko mosusu te kaka ya kotinda bána na bangó na mosála po ya kobakisa na lifúta moke. Pási po ya mabótá bazalaki kokanisa lobi yoko malámu po ya bána na bangó.

Bitéyelo ya bato bangó mokó bizali na bozongisi mai

Epái ya bato bangó mokó, likambo ezali mwá moke malámu. Kasi botéyi epái ya bato bangó mókó katoliko ezali lokóla eloko lyoko ya motúya na eye etáli botéyi. Káti ya 30 pe 40% ya bilenge ya Liban bakoyékola na bitéyelo bina. Na etéyelo Notre Dame ya Boboto, mamelo Hyam Swahiri, alobi mikakatano lokóla epái ya bato bangó mókó, kasi "eloko nakoluka ezali 'te mwána mókó te atika etéyelo likolo ya makambo ya nkita". Etéyelo, eye ekoyamba bána mike na maternel pe ekotámbola elongo na bangó kinó na lipolóme, ekobwaka ba mbela ya mosolo tángo insó na nzelá na ye ya basálisi po ya kokoka kokitisa mbongo ya kofúta na kelasi ya mabótá bizali na pási, kotika bitiké na nzelá ya kelasi, pe kofúta batangisi. Po na yangó, batangisi na bisó bakozua mwá moke lifúta ya baningá na bangó ya letá. "Áwa, na ndéngé nionso, tokomeka kosálisa bayékoli”, káti na bangó basusu, baye bakobongama po ya lipolóme, bakobomba te pósá na bangó ya kobima na ekóló. “Nakolikia 'te bakozonga po ya kosála na ekóló", elobi mamelo Hyam.

Bosangani ya biyamba

Na biténi ya etéyelo Notre Dame ya Boboto, bána kelasi ya bási balataka kitambala (voile). Mabótá ebelé ya ba musulman bakotinda bána na bangó na bitéyelo ya bakristu, na elaká ya botéyi ya malongá eye bakozua. "Awa ezali esika bakoyékola kobika lisangá", elobi mamelo. Elias Helou alobi kaka ndéngé waná. Na etéyelo na ye, ezali na etúká lyoko ya bakristu, pembeni na 10% ya bilenge bazali bamusulman pe bakolanda matéya ya eyamba. Ekosálema mingimingi 'te bamusulman balanda matéya bipesami na sángó moí-maronite oyo azali na lotómo ya eyamba na póso.

Etéyelo ya Chaldée

Po ya bána ya bakimi (réfugiés) ya Syrie to Irak, likambo ezali mwá mindondo. Tángo mingi bazali na lokasa lyoko te ya malonga, bakoki kokota na bitéyelo te. Mibéko bikotia mabakú mwá mingi ya kolonga na pási. Etéyelo ya Chaldée Sántu Toma ya Beyrouth ekopesa eyano yoko po na bána ya bakimi ya Irak, na baye bazali to te na lokasa ya malámu. "Tokoyamba bána 200 baye bakoki kokende na bitéyelo bisusu te", elimboli Mgr Rapahael Traboulsi, vicaire général ya dioceze ya Chaldée ya Beyrouth. Asemboli: "Bitéyelo ya letá bibongisi botéyi ya manaka ya Liban na tóngo pe botéyi boko ya manaka ya Syrie simá ya midi”. Ezali na esika mosusu te po ya bangó. Sóki etéyelo Sántu Toma te, bána waná bakotikala epái na bangó to na nzelá. Sántu Toma ekopesa litéya lyoko ya ofele, na botáli 'te bána bansó bayambi baúti na libótá ezangi makoki.

Diaspora pe bapesi

Baí-Liban ya Diaspora bakotinda mosolo po ya bandeko na bangó batikala na Liban po ya kosálisa bangó kotangisa bána. Masangá ebelé bakosála lokóla po bitéyelo bikokoka kosála kaka.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

30 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 12:32