Nigeria, imam inéne y'Al-Azhar atelemeli ba bolongoli
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Botelemeli makási ekeyi elongo na mokangano ya kokákatana te epái ya mabótá ya baye balongoli. Yangó waná elobaki mokolo ya yambo 24 ya sánzá ya zómi na yoko Lisangá ya musulman ya bakóló ekambemi na imam inéne y'Al-Azhar, Ahmad Al-Tayeb, oyo ayoki mawa po ya bolongoli (enlèvement) na Nigeria ya bayékoli pe batangisi koleka 300 mokolo ya itáno 21 ya sánzá ya zómi na yoko na etéyelo katoliko St. Mary's ya Papiri, na ntantei-nordi y'Agwara. Lisangá ya musulman ebengaki lokóla "ekelá (action) yoko ya bikóló na lombango pe na boyokani po ya bobimisi sasaipi bakangemi bansó, po ya bolendisi bobateli ya bitéyelo, pe elaká 'te biloko ya mabé boye bisálema lisusu te".
Botiki ya bakangemi basusu
Mokolo ya yambo 24 ya sánzá ya zómi na yoko, mokónzi Bola Tinubu, oyo alongolaki bilaká nionso ya bikóló ya ye po alanda na pembeni likambo yango, alobaki 'te bayékoli 50 ya etéyelo St. Mary's bakimaki o eleko ya bokoti ya bituluku bazalaki na mindoki. Abakisaki 'te mampinga balongaki kobimisa bandimi 30 balongolaki bangó mokolo ya ibále elekaki na ndáko-Nzámbe Christ Church ya Eruku, na etonga ya Kwara, na westi ya Nigeria. "Bulamatari ya ngai etelemi po ya kosilisa bobángisi bato (terrorisme) pe mobúlú", elobaki Bola Tinubu.
Mbela ya kimia pe na losámbo
"Babotoli bazali ya sóló babomi baye bakoluka kozua mosolo ebelé na moyibi na bosengi nsikó (rançon) po ya kotika bilenge bakangi", elobaki Mgr Bulus Dauwa, episkopo ya Kaontagora, dioceze eye Etéyelo St. Mary's ezali na káti, na mokánda atindaki n'agence Fides.
"Tomipesi mobimba, esúkisaki episkopo, po 'te baye bansó balongolaki bakoka kozonga epái na bangó na nzóto kolongono. Tokokoba kosála elongo na mampinga pe baye bansó bazali na likambo yangó, pe tokobenga bato ya kozala kimia, ya kokoba kosámbela pe kosálisa bikelá bikoluka ya kozua bozongi ya bato bansó balongolaki"
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye