Luka

Mabelé ya Móto mpe pási y'Acerra eye ekoyamba Papá Léon XIV

Reportage na etuka ya Campanie esika wápi Papá akosála botáli ya bontómá mokolo ya mpóso 23 ya sánzá ya mitáno. Michele Pannella mpe Alessandro Cannavacciuolo, ya lisangá «Volontari antiroghi Acerra», bikolakisa bambéba ya nzinganzinga bisálemi na bobomi mpe bomoni mpámba.

JR Bompolonga - Kinshasa

Amiante, bamisine ya ndáko, mokóbo, mpe kútu masini ya bokaboli nkásá. Ndéngé nionso ya bampumbulú biláli na bandelo ya balabala, na matambe mibalé ya káti y'Acerra, na bikunde (décharges) bilongobani te na polélé bikóma bisika mobéko ezali te. Kasi ya mawa koleka ezali ntembe te bobébisi ya nsé ya mabelé, eye ekota na bozindo ya mabelé mpe eyambanela (contaminé) mpo ya eleko ebelé. Pembeni ya bilanga bilonami bivandi biloko ya ngenge bibwakama waná mibú nzike na mabelé miye, na botáli ya loléngé ya bilanga, bisengelaki kosála lokúmu ya engúmba eye ya Italie, Campanie, mpe biye, esika na yangó, bibongwama liziba ya liwa.

Michele Pannella mpe Alessandro Cannavacciuolo, ya lisangá «Volontari antiroghi Acerra» (bavolontaire ya bobomi móto y'Acerra), bakosála bapema te mpo kopelisa mwinda na likambo eye ya mawa eye ebándi na súka ya mibú 1990 mpe ebándeli ya mibú 2000. Baizini ya Campanie ya bosáleli bampumbulú mpe bobimisi béton, na bobombani ya kobimisa «compost ya malámu koleka» (elingi koloba engrais) mpo ya mabelé, abakisaka na bobombani bosangisi bokó ya biloko ya mayi mpe makasi ya ngenge. Bazalaki kopanza yangó lisusu na bilanga, na boyébisi baloni te. «Tozuaka milio 222 ya euro mpo ya mabé mpe mbano sima ya bitúmbu mpo ya bobébisi koleka ya nzinganzinga», bilobaki bavolontaire. Maye makokóma mpo ya bokólóngóno bizali ebelé mpe bikobébisa bobóti ya baí-mboka.

«Botika bisó te, bozonga», bilelaki bangó o eleko bakokamba mpo ya bozui bilili biye. Bamongongo na bangó bisangani na biye ya baye bansó balingi 'te encyclique Laudato si' esimbama na motéma. Batelemi mpo ya botáli ya Papá XIV, na 23 ya sánzá ya mitáno, mpe bakolela kokoka kopema.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

24 sánzá ya mítáno 2026, 10:52