Mokambi ya Lampedusa: «Papá asálisa bisó mpo tosálisa»
JR Bompolonga - Kinshasa
Lampedusa ekobongama koyamba Papá Léon XIV, oyo akokende na 4 ya sánzá ya sambo na esangá ená, elembo ya boyambi bapaya na Méditerranée. Bokútáni bokó na ntina enéne ya molimo eye, engebene na Filippo Mannino, ezali na bokobi liloba epesamaka na Papá François o eleko ya mobémbo na ye na 2013. Mpo ya mokambi (maire), asololaki na bamédia ya Vatican, Lampedusa etikali «esika yokó ya makási ya bomoto». Úta «Ezibeli ya Poto», ebaluka ngambo y'Afrika, esangá ekokoba kokumisa mingi baye bakokaki kokóma na mokili na nzóto kolóngónó koleka ebelé ya bato baye babungisi bomoí na koluka kokatisa Méditerranée na bolukiluki lobí lyokó ya malongá.
Lisálisi libosó, eye etikali na sima
Filippo Mannino alobi 'te nzebi ya Lampedusa elakisa 'te, libosó ya baye bakokóma na bosengi lisálisi, eloko ya yambo ezali bosúngi. «Ntángo moto mókó apesi yo lobóko, osálisi ye libosó, eye etikali ekoya sima», elobi ye, na bolobi lisusu 'te likambo ya migration ezali na ndimbola yokó ekeseni na eye ekobima na masoló ya politiki bikosálema mosika na esangá. Mokambi alekisi libosó etamboli emonani mibú miye mileki na bokambi ya bokiti na masuwa.
Sóki, na kála, Lampedusa ekobika na ezaleli ya mbalakaka ya eleko insó, leló, libongisi, na lisálisi mpenza ya bozali ya Croix-Rouge, esálisi bokambi bokó malámu koleka mpe limemya koleka ya boyambi. Bileko bisusu ya ntina bitikali na makanisi, lokolá na 12 ya sánzá ya libwa 2023, ntángo pembeni ya bamigrant 10 000 bakómaki na esangá na mokolo mókó, ezali motángo mibalé pembeni ya bato bazali na esangá. Na libakú liná, Mannino akundoli, bosálisani ya bato ya esangá ezalaki na motúya: etelemaki mpo ya kokabola biloko, kokongola biloko ya kosakana mpo ya bána mpe kopesa lisálisi lyokó na baye bakómaki sika.
Bobenisi bokó eye ekopesa bokási
Na libosó ya boyei ya Papá wa Roma, mokambi akomona na bokómi ya Léon XIV mpósá ya kokoba nzelá Papá François asálaka, eye ya liloba «Na binó, bato ya Lampedusa, napesi binó matondo mpo ya bosálisani na binó» ekotilaka «ekangema na mabelé eye». Mokambi alobi lisusu mokánda etindamaki epái ya Léon XIV sima ya likambo ya mawa na mbu, esika wápi azalaki kolela: «Sálisa bisó mpo tosálisa». Mpo ya mobémbo ya 4 ya sánzá ya sambo, esukisaki ye, akozela yambo mpenza bobenisi bokó mpo ya baye bakokóma na esangá na elikya ya komibikisa, mpe mpo ya bato ya Lampedusa babéngami mokolo na mokolo ya kobunda na kilo ya bato mpe ya molimo na mókó ya bandelo ya mindondo ya Poto.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye