Luka

Elili ya bolakisi Elili ya bolakisi  (REUTERS)

SentinAI, Intelligence artificielle na mosála ya boboto

Ematisami na mokambi ya mosála ya Fránsa Pierre Winicki, bosáleli (application) bokó ekosálisa ya komona bilembo ya bolembu ya bakwokoso káti na bituluku mpe bato mpe ya kosála malámu mpo ya bokátikáti mpe boteí ya boboto. Emekeli yokó ya yambo esálemaki na súka ya sánzá ya motóbá na Buea na mókó ya bingúmba ya lokota y'anglais ya Cameroun.

JR Bompolonga - Kinshasa

Mpo ya kososola etamboli ya SentinAI, esengeli kosangisa yangó na Ndáko ya botiyi motéma mpo ya boboto, esálelo yokó eye bobimisi esálemaki o eleko ya mobémbo ya Léon XIV na Yaoundé na sánzá ya mineí eleki. Ezuami na Etéyelo ya likoló katoliko y'Afrika ya káti, eye Tatá-Esántu atálaki o eleko ya boyeí na ye na mboka-mokónzi ya Cameroun, esika eye ekosála kotéya, kobátela boboto mpe kokitisa matata. Ezali mokambi ya mosála ya Fránsa Pierre Winicki oyo azali na ebándeli ya likanisi eye, ye ndé akelaki TrustInside, kompani yokó esálaka bakompani ya kosála botiyi motéma na esálelo ya yokó ya bozui mokáno. Na bomátisi mwángo ya kosála mpo ya boboto na bingúmba bikoluka bonsómi na Cameroun, likambo ya kotombola esálelo yokó ya technologie na mosála waná ebimaki, mpe intelligence artificielle ezali mókó na bangó.

«Mokakatano nionso ya bobáteli matata, ezali koyéba misisa na yangó, bilembo ya pété pembeni mpenza na etando, elimboli Pierre Winicki, maloba ya bozangi motéma molayi (intolérance) to ya mobúlú, biye bikoki komonana ntina te, kasi bikoki kobimisa malémbe malémbe masikúlu ya boyini, mingi mpenza na baréseaux sociaux». «SentinAI, ekobaki Winicki, etombolama mpo ya kobátela matata, kokitisa bokási na yangó ntángo bikobánda mpe kopekisa bozongi na yangó lisusu ».

Nzebi yokó ya yambo ezali kolaka

Úta 24 kinó 26 ya sánzá ya motóbá, eténi ya yambo ya boyékolisi «basálisi ya botiyi motéma» esálemaki na Buea, na Sudi-westi ya Cameroun, na mókó ya bingúmba babalé  ya lokota y'anglais ya ekóló bibébi na matata ya bokabwani. «Batunaki na IA ya kokela ndakisa yokó na makambo bisálema, úto eye mosáleli amonaki na etando mpe eye ezali liziba ya makási ya matata to ya mobúlú», elimboli Pierre Winicki. SentinAI ebongama na ndéngé yokó ya bolámu epesami na misisa ya botiyi motéma, bimatisami na TrustInside. «babobángi, babondimi, libula ya bonkoko, lisapo, mibéko, bitindá, mimeseno bizali nini? Bizali makambo ebelé biye tokopesa bokébi», esemboli Winicki.

SentinAI ezali nanu kotóngama mpe ekoki na súka kolakisama lokolá bosáleli, kasi matómba ya yambo bikokomonana neti malámu. Adamu Mohamed Awal, elengé mokambi ya D2R Transformer,  esika yokó eye ekotombola manaka mpo ya kobunda na masikúlu ya boyini na bingúmba ya bokabwani ya Cameroun ezalaki ya yambo mpo ya komeka IA. Elengé eye Peul, awuta na Bamenda asálaka na likambo lyokó eyébana ya matata káti ya baloni mpe babokoli bibwele na nordi-westi ya ekóló. «Na esika ya kopesa ndelo na makambo bikomonana, esálelo epesi mwinda na makambo bibombana na polélé yokó elongobami», esepeli ye. Engebene na Adamu Mohamed Awal, «SentinAI ezali na likoki ya kobongola loléngé eye bato batálaka mpe basilisaka matata na bangó».

Matómba ya eténi ya yambo ya boyékolisi bilakisamaki na sángó Thomas Bienvenu Tchoungui, mokambi ya Etéyelo ya likoló katoliko y'Afrika ya káti. «SentinAI ezali esálelo yokó ya ntina eye ezali elili ya sóló ya bosáleli bokó elámu ya Intelligence artificielle na mosála ya bomoto, na bososoli, mpo ya boboto mpe kobika lisangá», esepelaki ye. Na bozeli 'te esálelo ekola malámu, bakeli na yangó bakolikya kotiya na mabóko ya basángó, baimam, bakambi ya bonkoko, kasi lokolá bakónzi ya masangá ya esika waná ya bolengé to basusu. Baye bazali kokana kokitisa ndéngé nionso ya matata.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

10 sánzá ya nsambo 2026, 13:34