Baepiskopo y'Amerika batelemeli bopanzi ya mino ya bobimisi zémi
Vatican News
Commisio mpo ya misála ya bomoí ya Lisangá ya baepiskopo katoliko y'Amerika ebyangi bakatoliko ya kosangana na molendé mókó etáli likambo lyangó na losámbo mpe mosála ya boboyi bopanzi ya mino ya bobimisi mokúmbá, eye ebándaki na 18 ya sánzá ya mwambi mpe ekokoba kinó sánzá ya zómi.
«Bolongoli nionso ya zémi ememaka liwa ya mwána mókó mpe ekosála mabé na mamá. Leló, na bozui na pété koleka bankisi ya bobimisi zémi, motángo ya bolongoli zémi ekomáta na mawa, na lokolá makámá mpo ya bokólóngóno ya nzóto», Mgr Paul Coakley, mokambi ya Commisio ená, mpe Mgr Daniel Thomas, mokambi ya Likita mpo ya bomoí ya Lisangá, balobaki na bobyangi bokó ya lisangá ebimaki na 18 ya sánzá ya mwambi.
Bobyangi ezali na losámbo lyokó n'anglais mpe na espagnol eye ekoki kolobama mpo ya kolela losámbo ya sántu Yosefu, mobáteli ya bomoí. Ekolendisa lokolá bakatoliko ya kokende na site web ya Commisio, esika wápi bakoki kozua nsango na makámá ya mino ya bolongoli mikúmbá mpe kotinda maloba na bisika ya boteki bankisi mpe na balaboratoire bisálaka nkisi bikoti likambo yango. Likanisi lyangó epesamaki zambi ya kokokanisa na Sánzá ya botosi bomoi, esepelamaka mobú na mobú na sánzá ya zómi na Eklezia katoliko n'Amerika.
Loléngé lyokó ekokomisa bási bato ya pási
«Mosála y'Amerika ya biloko ya kolia mpe ya bankisi esálisaki bobimi ya lingómbá lyokó ya ekolo ya bolongoli zémi na mokánda na bondingisi ya bolandi nzelá ya bolongoli mokúmbá o eleko ya botúni bato na émission yokó na etando eke mpe ya botekisi yangó lokolá na bisika ya botekisi (pharmacies) ya pembeni mpe na bokomi na internet, na botiki pembeni mibéko ya Bikóló biye bikobátela bomoí na libumu ya mamá», elimboli mbélá ya baepiskopo.
«Yangó ekotanda bási na likámá ya kosálisa bolongoli bokó ya zémi bangó mókó, na lisálisi ya mónganga te. Yangó ekopesa lokolá mabakú ya sika ya bonyokoli ya bato na baningá ya mobúlú to batekisi ya bato».
Na sánzá ya mitáno, Esambelo ya likoló koleka y'Amerika ebakisaki mobéko mókó eye ekokobisa na ngonga moke ya kondingisa bolandi nzelá ya bankisi ya bolongoli zémi na mosála ya mónganga na etando eke mpe botindi yangó na mokánda, nzokándé likambo lyokó ya bosémbo ya motuná ená ezali libosó ya esambela ya nsé.
Engebene na Bisika mpo ya botáli mpe ya bobáteli babokono, likita lya ekóló ya bokólóngóno ya nzóto ya letá, na 2022, 58% ya bolongoli mikúmbá bisálemaki n'Amerika bizuaka lisálisi ya bankisi ya bolongoli zémi.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.