Luka

Angelus : Nzambe asali na Kuruze, oyo ezalaki «elembo ya liwa», «esàleli ya bomoi».

Na tango ya Angelus, Pápa azongelaki ndimbola ya eyenga ya Bokumisi Kuruze Esantu, oyo esalemi o mokolo moye mwa lomingo, mwa 14 Setembe. Léon XIV alobaki ‘te Yezu akómaki «moninga akotambolaka na biso elongo », «monganga mwa biso », mpe «moninga wa biso», mpo na kosikola biso, amikómisaki «limpa tokobuka na Ukaristya ». Sé bongo, abongolaki «elembo ya liwa» na «esaleli ya bomoi». Léon XIV alobaki ‘te: “Bolingi bwa ye eleki masumu ma biso”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

“Mpo na biso lelo, kosepela mokolo mwa bokumisi Kuruze ya Nkembo elimboli nini?” Pàpa Léon XIV atunaki ut’o lininisa ya ndaku ya baPàpa oyo ezali na esika ya Saint-Pierre na losambo la Angelus, na mokolo mwa lomingo 14 ya sanzà ta setembe, mokolo moye, engebene ezalela ya bonkoko, “Sainte Hélène alokotaki nzete ya kuruze ya Jérusalem, na ekeke ya minei (IVe siècle)”.

Mpo na koyanola na motuna yango, Mokonzi ntoma monene atángaki mikapo ya Biblia ya mokolo yango, abandaki na lisolo ya Nsango Elamu oyo elobeli lisolo ya Yezu na Nikodemo, moko ya mokambi ya bayuda. Azalaki moto semba oyo akendaki kokutana na Yezu na ngonga ya butu. Azalaki na bosénga ya mwinda, ya litambwisi: azali koluka Nzambe mpe asengi lisalisi epai ya Moteyi ya Nazareti, mpo ayebi ye lokola mosakoli, alimboli Nganga Monene, mpe Nkolo ayambi ye, ayoki ye mpe amonisi ye na nsuka ‘te Mwana wa moto asengeli kotombwama, mpo ‘te moto nyonso ye ayambi ye, azala na bomoi bwa seko. (Jn 3, 15). Pápa alobi ‘te maloba maye akososola yango malamu se sima ya bobaki o kuruze, kasi yambo te.

Kristu abikisi biso na Kuruzé ya ye

Yesu ayebisi Nikodeme lisoló lya Bondeko bwa Kala oyo ezali kolobela lolenge kani Ba-Israele, baye banyokwamaki na banyoka ya ngenge o eliki, babikisamaki ntango batalaki nyoka ya motako oyo Mose, na botosi na etindá ya Nzambe, atelemisaki likoló ya nzete. Na nsima, Yesu ayebisi ye ‘te Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki bango Mwana sé moko wa ye, mpo ‘te moto nyonso oyo ayambi ye abungama te, kasi azwa bomoi bwa seko.

“Nikodeme akoyeba ‘te mpo na kobikisa to kosikola bato, Nzambe akómaki moto mpe akufaki o kuruze”.

Papa abakisi te, “Nzambe abikisi biso na komimonisa epai na biso, na komipesa lokola moninga wa biso, molakisi wa biso, monganga wa biso, moninga wa biso, kino akoma limpa mpo ya biso, lipa oyo ekobukama na Ukaristia. Mpo na kokokisa mosala mona, Yesu asalelaki moko ya bisaleli ya somo oyo eleki mabe oyo bato bamokili bakelaki naino te – Kuruze”.

Bolingi bwa Nzambe eleki masumu mabiso.

Leon ya zomi na mibale akobaki na koloba ‘te: Kosepela eyenga ya bokumisa Kuruze ya Nkembo ezali bongo bokundoli “bolingo bonene oyo Nzambe” ayambaki ekulusu “mpo na lobiko la biso”, oyo abongolaki yango ut’o “eloko ya liwa na esaleli ya bomoi”. Eloko moko te ekoki kokabola biso na yé mpamba te, “bondeko bwa yé eleki masumu ma biso na bonene”. Na yango nde tozwi mbela ya kobondela, “na  bolobeli bwa Maria”, mpo ‘te “bolingi” bwa Kristu oyo “ezali kobikisa, epiki misisa mpe ekoli kati na biso, mpo ‘te tóyeba komipesana boko na basusu, lokola ye moko amikabaki mobimba epai na bato banso”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

14 sánzá ya libwa 2025, 17:45