Pàpa Léon ya zomi na minei (XIV) apesi malako malamu na lingomba ya ba yuda ezwami na Roma.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Lingomba lya Bayuda na Roma mpe na mokili mobimba ezali na komilengele mpo na kosepela Roch Hachana, Mobu mwa sika ya Bayuda, kobanda mokolo mwa yambo na mpokwa. Milùlù mikoùmela mikolo mibale, kino mokolo mwa mosàlà misato mwa 24 ya sànzà ya setémbe (mercredi 24 septembre). Bongo mikolo miye mikozala ebandeli ya mobù 5786 na manaka ya ba Hébreux. Nsima ekolandisama milùlù mibale: Yom Kippur, kobanda mokolo mwa yambo tee mibale ya sànzà ya okotobé (du 1er au 2 octobre), mpe Sukkot, kobanda mokolo mwa 6 tee mwa 14 okotobe (du 6 au 14 octobre).
Lokola bapápa basusu oyo bazalaki liboso bwa ye, Pápa Léon XIV atindelaki Rabini Monene ya Roma, Riccardo di Segni, maloba ya kopesa mbote na Bayuda oyo bafandi na engumba ya seko. “Nazali na lisusu kokundola mokolo bosanganaki elongo na ngai o mokolo mwa ebandeli ya mosala na ngai lokola mokitani ya Petro”. Mpamba te, Pàpa akanisaki lisusu Rabbin Monene na misa ya ebandeli ya pontificat na yé o mokolo mwa 18 mai moùti koleka
“Tika ‘te Mokonzi, na bolamu bwa ye enene, apusana pene-pene ya lingomba la bino banso mpe asunga biso na misala na biso binso mpo na kokolisa boninga kati na biso, na engumba ya Roma mpe na mokili mobimba. Tika ‘te Mokonzi, na ngolu ya ye enene. Nzambe, na ngolu ya yé nsuka te, apesa biso likabo lya boboto (kimya) mpe mposa oyo ekoki kosila te ya kokólisa yango tango inso”. Ezali bongo maloba ma tata episkopo ya Roma, oyo asukisaki mokanda mwa ye na mbote na lokota ya Hébreu, “Shalom alechem”, elingi koloba “Kimya ezala na bino”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
