Luka

2025.11.01 Pàpa o kati ya bakristu basanganaki na esika Saint-Pierre mpo na zubilé ya batei mpe akomisaki Santu John Henry Newman motei mwa eklezya ya molongo mobimba , na libakù lya eyenga ya Basantu Banso. 2025.11.01 Pàpa o kati ya bakristu basanganaki na esika Saint-Pierre mpo na zubilé ya batei mpe akomisaki Santu John Henry Newman motei mwa eklezya ya molongo mobimba , na libakù lya eyenga ya Basantu Banso.  (@Vatican Media)

Pàpa abiangi bakristu bàzala «batongi ba bondeko»

Nsima ya Misa ya zubilé oyo esalemaki na libakù lya eyenga ya Basantu Banso mpe ya kosakola Santu John Henry Newman lokola «Moteyi mwa Eklezia ya molongo mobimba», mpe liboso ya losambo ya Maria ya «Angelus», Léon ya XIV azongelaki «maye matali minyoko mpe bozangi bosembo» oyo bato bazali kati na bitumba bazali kokutana na yango. Alobelaki mpe libombami ya lisanga lya basantu, sima apesaki mbote na batindami ya Eklezia ya Angleterre, oyo bakambamaki na Stephen Cottrell, episkopo-mokonzi ya York.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

O boso bwa bakristu nkoto tukù mitano (50 000) basanganaki na esika Saint-Pierre, Pàpa alobi ‘te: «Moyango ya bosangani bwa basantu»  oyo esalamaki o mokolo mwa poso mwa 1er novembre, «ezali kokundwela biso nini ezali mokano mwa nsuka ya bato: eyenga monene oyo epai wapi tozali kosepela elongo na bolingo bwa Nzambe, oyo ezali kati na biso banso», na «koyeba mpe kosepela na kitoko ya bilongi ndenge na ndenge, bokeseni binso mpe manso makokani na elongi ya Klisto».

Na molulu moye ya Eukaristya, Léon ya zomi na minei (XIV) akomisali Santu John Henry Newman «Motei mwa Eklezia mwa mokili mobimba», na molulu ya Jubilee ya mokili mobimba ya mateya oyo esalemaki na Rome. Pápa alobaki ete azalaki na esengo ya koyamba batindami ya Lingomba ya Angleterre, oyo batambwisamaki na Stephen Cottrell, episkɔ́pɔ-mokonzi ya engumba York. Mokonzi ntoma monene alakisaki esengo ya yé mpo ayambaki batindami ya eklezya ya Angleterre, oyo ekambamaki na Stephen Cottrell, episkopo-monene ya York.

Bolobeli bwa Santu Joh Henry Newman mp ona bomoko

Papa alobaki na nsima ya likita ya losambo yaoecumenisme elongo na Mokonzi Charles III, oyo esalemaki na mokolo mwa minei, mwa 23 okotobe, na ndako ya losambo ya Sistine, ‘te : «kozala na bino awa lelo ezali komonisa esengo oyo biso banso tokaboli mpo esakola ya kibomotei bwa Santu John Henry Newman na eklezya. Ut’o likoló, tiká ‘te azala elongo na bakristu o nzela ya bango mpo na bomoko ya solo solo”.

Baye bakotongaka bondeko

Episkopo wa Roma alobelaki bampasi mpe kozanga bosembo oyo bato bazali komona to kokutana na yango. Alobaki ‘te: “Toyoki na somo nyonso mpe na mpasi o motema, makàmà oyo libota ya bato ezali komona mpo na kozanga bosembo mpe bitumba”. Léon ya zomi na minei XIV akanisi na bato banso ‘te “basengeli kozala batongi ya bondeko”.

Batindami ya eklezya ya Angleterre, oyo ekambamaki na Stephen Cottrell, episkopo-monene ya York..
Batindami ya eklezya ya Angleterre, oyo ekambamaki na Stephen Cottrell, episkopo-monene ya York..   (@Vatican Media)

Mobembo ya Basantu

Apesaki mbote na bato bamobembo banso oyo bazalaki wana, mingi mpenza na bilenge oyo babandisaki “Course des Saints” na lisalisi lya ba Missions ya Don Bosco. Ezali kosangisa masano ndenge na ndenge mpe bondeko to bomoko (solidarité) nà bana oyo bazali na mpasi.

Pàpa Leon ya zomi na minei (XIV) asakoli John Henry Newman Moteyi mwa Eklezia ya molongo mobimba ya tukù misato na mwambe (38è)
Pàpa Leon ya zomi na minei (XIV) asakoli John Henry Newman Moteyi mwa Eklezia ya molongo mobimba ya tukù misato na mwambe (38è)   (ANSA)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

01 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 23:11