Léon XIV apesi Principauté ya Monaco mbote ya bokabwani yambo ‘te azonga na Roma
Bansango ya Vatikan
Pene na ngonga libwa nsima ya kokóma na ye na samedi na ntongo, Pápa asukisi mobembo na ye ya bontàma na Principauté ya Monaco, mobembo mwa mibale na libanda ya mboka na ye mpe ya liboso na Poto to mpe Eropa. Molulu mwa kokabwana esalemaki na libándá ya mpepo ya Monaco, na nsima ya mayi ya mbù monene. Nsima ya kopesa mbote na batindami ya mboka mpe ya bato ya Monaco (ba Monégasques), Pápa alekaki na etuluku ya bato ya lokumu mpe apesaki mbote na Prince Albert II mpe na Princesse Charlène.
Botóndi mpo na boyambi bwa esengo
Na nsuka, Léon XIV amataki na hélicoptère. Mpepo yango elongwaki na ngonga ya 17h30 na Monaco, ezalaki kokende na Italie. Akomaki mpe telegrami mosusu mpo na Mokambi ya Monaco, Prince Albert II, apesaki ye matondi mpo na boyambi. Apesaki mpe melesi na mabota ya bokonzi, na mbulamatari, mpe na bato ba Monako, “oyo bayambaki yen a esengo mpenza mpe na ezalela ya kokaba”. “”Nasambeli ete Nzambe Nta-Bokasi bonso apesa bino banso kimya mpe makasi “, mpe apesaki bango bobenisi bwa ye.
Na yango, Pápa atikaki bongo ekólo to bokonzi bwa Monaco mpe azongaki na Vatikan, epai wapi akitaki na mpokwa mwa moke liboso ya ngonga ya sambo (19h00).
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
