Likita lya bansó: «Na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa, Kristu akokoba kosála»
JR Bompolonga – Kinshasa
Na 20 ya sánzá ya mitáno eye, Léon XIV abándaki molongó ya sika ya matéya na Mokánda ebimisamaka na Concile Vatican II: Likambo-likonzi na litéya esántu ya milúlú ma losámbo lya misa, Sacrosantum Concilium. Na bokeli Likambo-likonzi eye, elimbolaki Mokitani ya Petelo, «Batatá ya Concile balingaka kaka kosála mbongwana mókó ya milúlú te, kasi lokolá komema Eklezia kotála mpe kokolisa nsinga ená ya bomoí eye ekokisa yangó mpe ekosangisa ye na mobombano ya Kristu».
«Litéya ya milúlú ma losámbo lya misa, ekosimba kútu na motéma ya mobombano yangó: ezali mbala mókó esika, ngonga mpe eleko esika wápi Eklezia ekozua na Kristu bomoí na ye», elobaki Léon XIV, na bolobi lisusu 'te «mosála ya bosikoli na bisó ekosálema na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa, eye ekokómisa bisó eboké yókó eponama, bonganga-Nzámbe bokó ya bokónzi, ekóló yókó esántu, bato baye Nzámbe azua».
«Litéya ya milúlú ma losámbo lya misa na mobombano ya Eklezia»
Nsinga káti ya mobombano ya Eklezia mpe litéya ya milúlú ma losámbo lya misa etikali makási. «Kristu ye mókó azali mobéko ya káti ya mobombano ya Eklezia, bato basántu ya Nzámbe, babotama na ngambo eye etobokaki na kuruze». Na litéya esántu ya milúlú ma losámbo lya misa, na nguyá ya Elimo na ye, akokoba kosála, elobaki ye: «Ekosantisa mpe ekosangisa Eklezia, molongani na ye, na libonza na ye epái ya Tatá. Akosála bonganga-Nzámbe na ye se mókó, ye oyo azali waná na liloba esakolama, na Basakramento, na baministeli biye bikosála, na lingómbá esangani mpe, na likoló koleka, na Ukaristiya».
Bandimi balendisami na litéya esántu ya milúlú ma losámbo lya misa
Na mosála ya mobombano ya Kristu, litéya ya milúlú ma losámbo lya misa ekosálisa bandimi na bozindisi bangó ntángo insó na Pasika ya Mokónzi mpe, bôngó, elobaki Papá, «na nzelá ya nsakola ya Liloba, bosáleli basakramento mpe losámbo ya lisangá, balendisami mpe bakómi ya sika lisusu na bomipesi na bangó ya boyambi mpe na etindá na bangó».
Elembo ya bomókó ya bomoto mobimba na Kristu
Léon XIV alendisi komitika «kosálema na káti ya milúlú, bilembo, bikela mpe mingimingi na bozali ya bomoí ya Kristu na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa». Sima koloba lisusu na mókó mókó ya bandimi 'te «litéya ya milúlú ma losámbo lya misa ekotónga mokolo na mokolo baye bazali o káti mpo ya kokómisa bangó tempelo yókó esántu ya Mokónzi». Ebikami na Elimo Sántu, «litéya ekokotisa bisó na bomoí ya Kristu, mpe esáli bisó Nzóto na ye mpe, na balomeko na ye nionso, ekolakisa elembo yókó ya bomókó ya bomoto mobimba na Kristu». Litéya ya milulu ma losámbo lya misa ekosála lisangá lyokó efúngwama mpe eyambaka bansó.
Mobombano ya bokristu, likambo ya Pasika, elingi koloba malozi, liwa, nsékwa mpe bopési nkembo na Kristu, «ezongeli bisó na ndéngé ya sakraménto bozali mpenza na litéya ya milúlú ma losámbo lya misa, na loléngé 'te mbala insó tozalaki na lisangá esangani na nkombo na ye (Mt 18, 20), tozindami na Mobombano ená», elobaki lisusu Papá wa Roma o eleko ya likita lya bansó eye Aram Ier, Catholicos y'Arménie ya Cilicie, azalaki.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
