Papá alendisi mpo ya bosúkisi bamobúlú na Cisjordanie
Vatican News
Úta ekóteli ya ndáko na ye na Castel Gandolfo, ezali na bakilometele ntúkú misáto ya Roma, Papá wa Roma azongelaki mbélá na ye mpo 'te «bamobúlú bikozongaka libosó ya bato civil ya Palestine na Cisjordanie bisila».
Úta bobomi ya 7 ya sánzá ya zómi 2023 esálemaka na Hamas, bamobúlú ya bacolon ya Israël epái ya baí-Palestine na Cisjordanie bimáti makási. Engebene na liyébísi lyokó ebimaki na sánzá ya motóbá eleki na Buro ya ONU mpo ya makambo ya bato (OCHA), koleka bamobúlú 1000 bisálemaki na bacolon na 2026, ezala likambo ya bosáli bato ya makámá to ya bosáli bobuki ya biloko. Bamobúlú yangó bizuaki bamboka 230 bipanzani na Cisjordanie mobimba, elobi OCHA, eye elakisi úto waná bokátikáti bokó ya makási ya makambo motóbá na mokolo.
«Nakosenga na lombango na lisangá ya mokili ya kosála mpo 'te eyano ya Bikóló mibalé ekola, mpo ya boboto bokó ya sémba mpe ya kowumela», ebakisaki Léon XIV sima ya bolobi Angélus. Ngwendé ya Sántu-Petelo ezali kondima 'te «eyano ya Bikóló mibalé, esálemi na bandelo ya sóló mpe biyébani mokili mobimba, ezali nzelá se yokó ya ntina mpe bosémbo mpo ya boboto bokó ya sémba mpe ekowumela», elobaka na sánzá ya sambo 2025 motindami ya Vatican epái ya ONU ya eleko ená, Mgr Gabriele Caccia, ntángo ya liyangani lyokó ya mokili mobimba ya ONU esálemaki na New-York na Fránsa mpe Arabie saoudite.
Lisano, momemi ya bondeko
Papá Léon XIV azuaki lokolá likanisi lyokó mpo ya Masano ya Méditerranée biye bikobánda mokolo ya mitáno 21 ya sánzá ya mwambi na Tarente, na sudi-esti ya Itali. Mimekano yangó ya masano mingi bitáli bato ya masano ya bassin ya Méditerranée nionso, na bowuti Afrika, Aziya mpe Poto. «Nalingi 'te molúlú yangó ya lisano ezala elembo yokó ya boboto mpe ya bondeko káti ya bato ya ngambo waná mpe ya mokili mobimba», elobaki Tatá-Esántu.
Tatá-Esántu asúkisaki bambélá na ye na bopesi mbote na bási bébóo basangani na mobémbo mwa boyambi na sanctuaire ya Notre-Dame de Piekary, na Silésie ya Likoló na Pologne. Mobú mókó mókó na káti ya sánzá ya mwambi, bankoko ya bási, bamamá, bána bási mpe bána bási ya bána bakokende na sanctuaire mpo ya kotika kúna, makanisi na bangó mpe makambo bakútanaka na yangó na nzelá ya boyambi.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye
